88.The Overwhelming

  1. Ekomeli yo sango ya oyo ekozipa
  2. Mokolo wana bilongi bikobanga
  3. Makambo maleki bango bakomi na bolembu
  4. Bakozikisama o’kati ya moto ya makasi
  5. Mpe bakomelisa bango mayi ya moto
  6. Bakozala na bilei te sé matiti ya nzube
  7. Ekosilisa bango nzala te mpe ekopesa bango nzoto Nkolongono te
  8. Mokolo wana bilongi misusu bikozala na esengo
  9. Bikosepela pona maye basalaki
  10. Okati ya lola ya likolo
  11. Okati na yango okoyoka te makambo ya pamba pamba
  12. Okati na yango maziba mazali kotiola
  13. Okati na yango bambeto ya kotombwama
  14. Mpe bakopo bitiami
  15. Mpe bikáta bitandami
  16. Mpe bankwala bizali ya kotandama
  17. Bazali kot ala te ba ibil ndenge ekelama
  18. Mapata lolenge etombwama
  19. Mpe bangomba lolenge epikama
  20. Mpe mabele lolenge etandama
  21. Kundola, pamba te yo ozali sé mokundoli
  22. Kasi ozali mokengeli likolo na bango te
  23. Longola sé oyo apesi mokongo mpe aboyi kondima
  24. Allah akopesa ye etumbu ya monene
  25. Ya soló, epai na biso nde bozongi na bango
  26. Mpe ya sólo lifuta lia bango ezali omaboko na biso