56.The Inevitable

  1. Tango likambo monene ekokweya
  2. Koya na yango ezali lokuta te
  3. Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu)
  4. Tango mabele makoninganaka makasi
  5. Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike
  6. Mpe mikokoma putulu mizali kopanzana
  7. Mpe bokozalaka lisanga misato
  8. Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali
  9. Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi
  10. Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka
  11. Baye wana nde bakozalaka pene na Allah
  12. O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu
  13. Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso
  14. Мре moke okati ya bato ya sima
  15. (Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo
  16. Bayekami likolo na yango bazali kotalana. (na kimia)
  17. Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela
  18. Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli)
  19. (Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te
  20. Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka
  21. Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi
  22. Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala
  23. Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga
  24. Lifuta тропа maye basalaki
  25. Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te
  26. Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia
  27. Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali
  28. Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr
  29. Na banzete ya makemba na bitabe
  30. Na nsé ya malili ya monene
  31. (pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela
  32. Mpe bambuma ebele
  33. Babuki yango te mpe epekisami te
  34. O likolo lia bambeto ya likolo
  35. Biso nde tokelaki bango na bokeli
  36. Mpe tosalaki bango bayebi mibali te
  37. Bazali bambula ndenge moko
  38. Mpona bato ya loboko ya mobali
  39. Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso
  40. Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka
  41. Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana
  42. Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka
  43. Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo
  44. (kati na yango) malili te mpe kitoko te
  45. Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko
  46. Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi
  47. (Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu
  48. Na bankoko ya biso ya yambo
  49. Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka
  50. Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani
  51. Na yango bino babungi baye boboyaki kondima (na mokolo ya suka)
  52. Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm
  53. Mabumu na bino makotondaka na yango
  54. Sima bokomelaka mayi ya moto ya makasi
  55. Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso)
  56. Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka
  57. Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te
  58. Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo
  59. Bino nde bokela yango to biso nde bakeli
  60. Biso nde tosila кокота liwa kati na bino, mpe eloko moko ekopekisa biso te
  61. Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te
  62. Mpe bosilaki koyeba bokeli bwa liboso; boye bozali kokanisa te
  63. Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele)
  64. Ezali bino nde bolonaka yango to biso nde baloni
  65. Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima)
  66. Tala biso tokomi na banyongo
  67. Kasi bapimeli nde biso
  68. Boye bozali kornona mayi oyo bozali komela
  69. Bino nde bokitisaka yango kowuta na mapata to biso nde bakitisi
  70. Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah)
  71. Boye bozali kornona moto oyo bozali kopelisa te
  72. Bino nde bokela nzete yango to biso nde bakeli
  73. Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo)
  74. Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene
  75. (Te) nalapi na bisika minzoto mikweyaka
  76. Ya sôló, ezali kolapa ya monene soki boyebaka
  77. Ya soló, kurani oyo ezali na lokumu
  78. Ebatelami kati na buku
  79. Basimbaka yango te sé na bapetoami
  80. Ekita kowuta epai ya Nkolo ya mokili
  81. Boye bozali kozua liloba oyo na lokuta
  82. Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani
  83. Tango mpema ekomata tii na mongongo
  84. Mpe tango wana bozali kotala
  85. Mpe biso tozali pembeni naye koleka bino, kasi bozali kornona te
  86. Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te)
  87. Bozongisa yango (molimo) soki bozali na bosembo
  88. Soki akozala na molongo ya bato ya pembeni ya (Allah)
  89. (Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo
  90. Mpe soki azali o kati ya bato ya loboko ya mobali
  91. (Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali
  92. Kasi soki azalaki okati ya baye baboyaki mpe babungi
  93. Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi
  94. Mpe akozikisama okati ya moto
  95. Wana nde likambo ya soló
  96. Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene