55.The Beneficent

  1. Ar-Rahmân
  2. Atangisaki kurani
  3. Akela moto
  4. Atangisa ye koloba polele
  5. Moyi na sanza etambolaka na bolamu oyo etiyama
  6. Mpe minzoto na banzete egumbamelaka (Nkolo wa bango)
  7. Мре atombola likolo mpe atiyela emekeli
  8. Mpo ete bolekisa ndelo te na emekeli
  9. Mpe bopesa kilo na bosembo, kasi bobebisa emekeli te
  10. Mpe atiya mabele тропа bikelamu ya bomoi
  11. Okati na yango, okokuta bambuma na ba nagh’l ekangama
  12. Mpe bambuma bibatelami na efandelo na yango, na banzete ya malasi
  13. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? (moto mpe elima)
  14. Akela moto na mabele ya potopoto lokola mb eki
  15. Mpe akela bilima kowuta na moto ezanga milinga
  16. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  17. Nkolo ya moniele mibale mpe Nkolo ya biloli mibale
  18. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  19. Atika bibale mibale bileka na bokutani
  20. Kati kati na yango mondelo ezali mpo bisangana te
  21. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  22. Yango mibale bizali kobimisa lulu’u na mardjânu. (mpalata na mabanga ya kongenga)
  23. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  24. Manso ya ye; masuwa maye mazali kotambola likolo ya ebale lokola bangomba
  25. B olámu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  26. Nyoso oyo ezali likolo ya mokili ekolimwa (na bokufi)
  27. Ekotikala sé elongi ya Nkolo nayo atonda lukumu mpe boboto
  28. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  29. Baye bazali kati na likolo na mabele bazali kosenga ye, mikolo minso azali kokokisa eloko ya sika
  30. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  31. Kala mingi te tokokataka makambo na bino, oh bino mibale! (moto mpe elima)
  32. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  33. Eh lisanga ya bilima mpe bato! Soki bokoki kobima na makambo ya likolo mpe ya nsé, bosala. Kasi bokokoka kosala yango te sé na makoki ya (Allah)
  34. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  35. Bakobwakela bino moto ya milinga ya nkoni to ya mabende mpe bokosungama te
  36. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  37. Mpe tango likolo ekopasuka likokomaka na langi ya motané
  38. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  39. O mokolo yango, bato na bilima bakotunama te тропа masumu na bango
  40. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  41. Batomboki bakoyebanaka na bilembo na bango тре bakozuaka bango na suki ya ebandeli ya mutu тре makolo na bango
  42. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  43. Oyo nde lifelo тропа batomboki oyo batiyaki tembe na yango
  44. Bakobalukaka kati na yango na kati ya mayi ya moto ya makasi
  45. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  46. Kasi oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye, akozala na bilanga mibale. (ya lola)
  47. Bolamu nini y a Nkolo na bino oyo bozali koboya
  48. Okati na yango ezali na bolamu mibale
  49. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  50. O kati na yango (bakokutaka) miluka mibale mizali kotiola
  51. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  52. O kati na yango okokuta bambuma mibale mibale
  53. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  54. Bakoyekama na matoko ya epeda (ya kilo kitoko) mpe bambuma ya bilanga mibale bikozala pembeni na bango тропа kobuka
  55. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  56. Bakokuta o kati na yango basi kitoko ya miso ya minene baye batalaka pembeni te, mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango
  57. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  58. Kitoko na bango ezali lokola mabanga ya ebale bazali kongenga
  59. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  60. Boye bolamu efutamaka te sé na bolamu
  61. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  62. Mpe ezali na bilanga misusu mibale likolo ya oyo ya liboso
  63. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  64. Bizali na langi ya mpondu ya moyindo
  65. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  66. Okati na yango ezali na miluka mibale ya bosepelisi
  67. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  68. Okati na yango ezali na bambuma, na ba nagh’l na rummân
  69. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  70. Okati na yango ezali na basi kitoko mpe malamu
  71. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  72. Basi ya miso minene kitoko bafandi nakati ya bièma
  73. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  74. Mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango
  75. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  76. Bakoyekama na bikata ya langi ya pondu na bitoko ya kitoko
  77. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
  78. Tika ete epambolama nkombo ya Nkolo nayo oyo atonda lokumu mpe boboto