54.The Moon

  1. Ngonga epusani mpe sanza epasuki
  2. Mpe soki bamoni elembo bazali koboya mpe balobi ete: Oyo ezali bonganga ya makasi
  3. Mpe baboyi kondima balandi makambo na bango moko, nzoka nde likambo nyoso lizali na suka na yango
  4. Mpe basango bisilaki koyela bango, basango ya kopekisa bango (mabe)
  5. Wana ezali bwanya (bolamu), kasi makebisi esali bango eloko te
  6. Mitiya mosika na bango, mokolo oyo mobengi akobengaka epai (ya likambo) linene
  7. Bakobima na malita bilongi ya kokitisama, bakopanzana lokola bamakonko
  8. Bakokamata bango kokende mbangu epai ya molobeli, bapagano bakoloba ete: Oyo ezali mokolo ya mpasi mpe mindondo
  9. Bato ya Nûh bagangaki na lokuta liboso na bango, baboyaki kondimela mowumbu na biso mpe balobaki ete: Oyo azali ligboma mpe bamitiaki mosika naye
  10. Abengaki Nkolo wa ye (alobi): Ya soló nazali na bokoki te, sunga ngai (na bokasi bwa yo)
  11. Мре tofungolaki bizibeli ya likolo mayi ebele
  12. Мре topanzaki mabele na miluka mpe mayi makutanaki na mobeko oyo etiyamaki
  13. Mpe tomemaki ye na mabaya na sete oyo esalaki masuwa
  14. Etambolaki na miso na biso,mpe tofutaki baye baboyaki kondima mbano na bango
  15. Mpe totikaki yango ezala elembo, boye moto azali kaka kokanisa te
  16. Lolenge nini etumbu na makebisi na ngai ezalaki
  17. Mpe tosilaki kotia kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa
  18. Ba Aad, baboyaki kondimela (bantoma na bango), boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni
  19. Ya soló, totindelaki bango mopepe ya makasi koleka ya kozongelama
  20. Ezali kopikola bato lokola biteni ya nagh’l oyo bapikoli
  21. Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni
  22. Мре tosilaki kotiya kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa
  23. Ba Thamúd baboyaki kondimela makebisi
  24. Mpe balobaki: Tolanda sé moto moko okati na biso? Noki te tokobunga mpe tokokweya na mabe
  25. Boye baponaki ntoma sé ye kati na biso nyoso? Te; azali sé moto ya lokuta mpe lolendo monene
  26. Bakoyebaka lobi: Nani atondi na lokuta mpe lolendo
  27. Ya sólo, totindelaki bango náqah lokola ekamwiseli mpe komekama, kengele bango mpe kanga motema
  28. Mpe yebisa bango été mayi ekabuani na biteni mibale kati na bango, bakozala na ntango na bango ya komela, ye mpe na ngonga naye
  29. Мре babengaki moninga na bango azui mbeli babomi ye mpe basasi ye
  30. Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni
  31. Ya soló, totindelaki bango bogangi moko, mpe bango wana bakomi lokola banzete ekawuka
  32. Mpe tosilaki kotiya kurani ezala pete тропа bokundoli, boye moto azali te тропа kokanisa
  33. Bato ya Loth baboyaki kondimela makebisi
  34. Ya sólo, totindelaki bango mopepe ya makasijongola sé libota lia Loth liye tobikisaki ye yambo tongo etana
  35. Na bolamu kowuta epai na biso. Lolenge wana nde tofutaka oyo azali kotondo (Allah)
  36. Mpe asilaki kokebisa bango тропа etumbu na biso, kasi bazangaki kondimela makebisi
  37. Mpe balingaki kokweisa bapaya naye, kasi tokangaki miso na bango, bomeka etumbu na ngai na makebisi na ngai
  38. Мре etumbu ya makasi ezuaki bango na ntongo
  39. Bomeka etumbu na ngai mpe makebisi na ngai
  40. Mpe totiyaki kurani ezala pete тропа bokundoli,boye ezali na moto te ya kokanisa
  41. Mpe ya soló, makebisi makomelaka bato ya falo
  42. Baboyaki kondima na bilembo bia biso nionso, mpe tozuaki bango na bozwi ya oyo azali na nguya atonda makoki
  43. Boye bapengwi na bino bazali malamu koleka ba oyo kuna? То ezali na eloko ya kobatela bino okati ya makomi
  44. Bazali koloba: Tozali lisanga (makasi) tokolonga
  45. Lisanga na bango ekopanzana mpe bakokima
  46. Ngonga moko ya mpamba nde elaka na bango, mpe yango ezali nsomo mpe bololo
  47. Ya soló batomboki bazali na libungi mpe na kati ya moto
  48. Mokolo oyo bakobendamaka na bilongi na bango okati ya moto, bomeka etumbu ya lifelo
  49. Ya soló, tokelaki biloko binso na bokoki
  50. Mpe mitindo mia biso mizalaka sé liloba moko, ezali sé lokola kobuka liso
  51. Mpe tosilaki koboma bato liboso lokola bino, boye ezali na moto yakokanisa te
  52. Mpe biloko binso biye bisalama bisila kokomama kati na (buku)
  53. (Biloko) nyoso, ezala ya moke to ya monene ekomama
  54. Ya sólo, babangi (Allah) bakozalaka na kati ya lola mpe mpene ya mingala ezali koleka na nsé na yango
  55. Mpe esika ya bosembo yakofanda pene na mokonzi wa bokoki (Allah)