(Anzelu Djibril) oyo atonda bokasi nde atangisaki ye yango
Oyo azali na bokasi sima amilakisi na lolenge naye ya anzelu
Mpe atelemaki na kongombela ya likolo koleka
Sima apusanaki pene mpe akitaki na nsé koleka
Ezalaki bongo na ntaka mibale to mpe mua moke na yango
Amoniselaki mowumbu naye maye amonisaki
Motema ekosaki te oyo emonaki
Boye bokoboyela ye na oyo amonaki
Мре amonaki ye lisusu tango akitaki тропа mbala ya mibale
Pene na sidr muntaha
Mpembeni na yango nde paladizo ya seko ezuami
Tango nzete ya sidr ezipamaki na oyo ezipi yango
Miso ebungi te, elekisi mpe ndelote
Ya soló, amonaki bikamuiseli minene ya Nkolo naye
Bopesa ngai sango ya Láta na Uzza
Mpe mosusu ya misato Manáta
Boye bokozala na mwana mobali mpe ye azala na mwana mwasi
Wana ezali bokaboli ya mabe
Wana ezali sé bankombo oyo bopesa yango bino moko na batata mpe bankoko na bino, Allah akitisela yango elembetele te. Bazali kolanda sé makanisi na bamposa, nzoka nde bokambi esilaki koyela bango kowuta epai ya Nkolo na bango
To boye moto alingi azua nyoso lolenge azali kokanisa
Bomoyi ya nsé na oyo ya lobi, ezali epai ya Allah
Boni kati ya ba anzelu na likolo kosengela na bango bato ekosalisa te, sé sima ya ndingisa ya Allah na oyo alingi mpe asepeli
Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, bapesi ba anzelu bankombo ya basi
Kasi bazali na boyebi te, bazali sé kolanda makanisi. Mpe makanisi esalaka bosembo eloko te
Mitiya mosika na oyo akoboya bokundoli bwa biso, mpe bazali sé kolinga bomoyi ya mokili
Kuna nde esika mayele na bango ekendeke. Ya sólo, Nkolo nayo ayebi malamu nani abungi nzela naye, mpe ayebi nani oyo akambami
Mpe maye manso mazali na likolo mpe na nsé ezali ya Allah, mpo afuta baye basali mabe mpo na misala na bango, mpe afuta baye basali malamu тропа misala na bango
Baye bazali komitiya mosika na masumu ya minene, bazali sé kokweya na mwa mabunga ya mike mike, ya sólo Nkolo wa yo azali na bolimbisi bonene. Azali na boyebi koleka bino, ayebi malamu lolenge akelaki bino kowuta na mabele,mpe tango oyo bozalaki litono ya makila okati ya mabumu ya bamama na bino. Bomikumisa te na kondima, ye nde ayebi nani azali kobanga ye mpenza
Omoni te oyo azali kopesa mokongo
Mpe apesaka sé moke (suka na yango) akati kopesa
Boye azali na boyebi ya mabombami nde azali kornona
To boye bayebisaki ye te na ntina ya makomi ya Mûssa
Na ya Ibrâhîm oyo akokisaki elaka
Moto moko te akomema lisumu ya moninga
Kasi ya soló, moto akozuaka sé na molende naye
Mpe ya sólo, molende naye ekomonana
Sima, akofutama mpenza malamu
Mpe ya sólo, nyoso ekosukisama epai ya Nkolo wayo
Mpe ye nde asekisaka mpe alelisaka
Мре ye nde abomaka mpe apesaka bomoyi
Mpe ye nde akela balongani mibale, mwasi na mobali
Kowuta na litanga ya mayi ya mokongo tango babwaki yango
Mpe kokela ya mbala ya mibale ezali sé epai naye
Mpe ye nde apesaka moto bomengo, mpe ye nde apesaka bobola
Mpe ye nde Nkolo ya ach-chi’râ
Ye nde abomaka bato ya liboso na (mboka) Aad
Na Thamûd, moko atikala te
Mpe liboso na bango, bato ya Nûh bazalaki babubi mpe balekisaki ndelo
Lolenge moko na mboka oyo ebalusamaki (mutafikah mboka ya Loth)
Azipaki yango ndenge azipaki etumbu ya makasi
Bolamu nini ya Allah oyo ozali kotiela yango tembe
Oyo azali mokebisi lokola bakebisi ya yambo
Ngonga esili kobeleme
Mosusu azali te oyo akofungola yango na botiki Allah