52.The Mount

  1. Na ngomba ya at’tur
  2. Na buku oyo ekomama (na ba anzelu)
  3. Likolo ya ekomami ya polele
  4. Na ndako oyo etondama
  5. Mpe na likolo lolenge etombwama
  6. Мре na ebale ya kotonda
  7. Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ekokokisama
  8. Ekozala na moto ya kopekisa yango te
  9. Mokolo likolo likoningana
  10. Mpe bangomba bikotambola
  11. Mpasi ekozalaka mokolo wana epai ya babuki lokuta
  12. Baye bazalaki na komibuaka na kati ya masano
  13. Mokolo oyo bakobendaka bango na makasi na lifelo
  14. Oyo nde lifelo oyo bozalaki kotiyela yango tembe
  15. Boye oyo mpe ezali kindoki to bozali kornona malamu te
  16. Bôžika kati na yango, bozala na bozeli to te, bokozala sé ndenge moko. Bokofutama sé kolandana na oyo bozalaki kosala
  17. Ya sôló, babangi bakozalaka o kati ya lola na bolamu na bango
  18. Bakomisepelisa na oyo Nkolo wa bango akopesa bango, mpe Nkolo wa bango akobatela bango na etumbu ya lifelo
  19. Bolia bomela na mposa na biso, тропа lifuta ya maye bosalaki
  20. Mpe bayekami likolo ya bambeto ebongisama kitoko, mpe tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene ya moyindo
  21. Mpe тропа baye bandima mpe mabota na bango elandi bango na bondimi; tokolandisela bango mabota na bango, mpe tokokutolaka maye basalaki ata токе te okati ya misala mia bango. Moto nyoso akotunamaka na makambo naye
  22. Mpe tokopesaka bango bambuma mpe mișuni (ya kolia) oyo bakolinga
  23. Nkeni moko ekotambola kati kati na bango, ekopesa bilobela lobela te mpe lisumu te
  24. Okati na bango, bilenge mibali bakotelamaka тропа kosalela bango, bazali kongenga lokola mabanga kitoko na bongengi
  25. Mpe bakobalukaka bango na bango bazali kotunana
  26. Bakoloba ete: Ya soló, tofandaki okati ya mabota ma biso na bobangi (Allah)
  27. Yango Allah apesi biso mpe abateli biso na etumbu ya lifelo
  28. Ya sólo, tozalaki kobondela ye, ya sólo, ye azali malamu mpe atonda mawa
  29. Kundola тропа bolamu ya Nkolo nayo, ozali nganga te mpe ozali ligboma te
  30. То bazali koloba ete: Azali mokomi ntoki, tozela likama naye ya liwa
  31. Loba: Bozela, ngai mpe na bino mpe tozali kozela
  32. То boye bamposa na bango ezali kotinda na lolenge wana, to boye bazali nde batomboki
  33. To bazali koloba ete: Asalaki yango na ndenge naye moko? Kasi bazali kondima na yango te
  34. (Malamu) baya na makambo mosusu ezala lokola yango, soki ya soló, bazali na bosembo
  35. To bakelamaki kowuta na eloko moko te, to bango nde bakeli
  36. To bango nde bakela likolo na nsé? Kasi bazali kondima te
  37. To bazali na sanduku ya bozui ya Nkolo nayo, to baleki ye na nyoso
  38. To bazali na emateli ya likolo mpo baya koyokamela? Kasi moyokameli na bango aya na elembo na yango ya polele
  39. To (Allah) azali na bana basi mpe bino bozali na bana mibali
  40. To azali kosenga bango lifuta oyo ezali kopesa bango pasi тропа kofuta
  41. To bazali na boyebi ya mabombami nde bazali кокота yango
  42. To bazali kosala likita ya mabe? Kasi likita ya bapengwi ezongelaka sé bango moko
  43. To bazali na nzambe mosusu na botiki Allah? Lokumu na Allah aleki oyo bazali kosangisa
  44. Mpe soki bamoni ndambu ya likolo ekweyi (etumbu enene), balobi: Wana ezali nde mapata ekangama
  45. Tika bango kino bakokutanaka na mokolo na bango oyo bakobetamaka na nkake
  46. Mokolo oyo likita ya mabe na bango likosalisa bango na eloko moko te, mpe bakozuaka lisungi te
  47. Ya soló, babubi bakozala na etumbu mosusu likolo ya oyo ya liboso, kasi ebele na bango bazali koyeba te
  48. Mpe kanga motema тропа kozela motindo ya Nkolo nayo, mpo ete ya sólo, yo ozali na nsé ya ebateli na biso. Mpe sanzola lokumu ya Nkolo nayo tango ozali kotelema
  49. Mpe kumisa ye (Allah) okati ya eteni ya butu, mpe otango minzoto mizali kolimwa