51.The Winnowing Winds

  1. (Nalapi) na mipepe miye mipanzaka
  2. Mpe na bamemi mikumba (ya mapata)
  3. Mpe na ba masuwa ezali kotambola likolo ya mayi
  4. Mpe na bakaboli, kolanda na mibeko
  5. Ezali solo oyo balaki bino
  6. Mpe ya sôló, mokolo ya suka ekoya
  7. Mpe na likolo oyo ezali na banzela bipasolama malamu
  8. Ya sólo, bozali na bokeseni na maye bozali koloba
  9. Oyo aboyi yango, ezali oyo apesaki bondimi mokongo
  10. Bato ya lokuta basili kobomama
  11. В aye bazindi na molangwa ya mokili
  12. Bazali kotuna тропа mokolo ya suka ekozala tango nini
  13. Mokolo oyo bakomekama na moto
  14. Вотека bomekami ya bino (etumbu) mpo bozalaki koluka yango na lombango
  15. Ya soló, babangi bakozalaka na lola oyo ezali na miluka
  16. Bakozuaka oyo Nkolo wa bango akopesa bango. Ya sólo, bazalaki liboso na yango bato ya malamu
  17. Bazalaki kolala токе na butu
  18. Мре yambo tongo etana bazalaki kosenga bolimbisi
  19. Mpe na bomengo na bango oyo bazalaki kopesa epai na mosengi mpe mozangi
  20. Mpe bilembo biye bizali okati na mokili bizali тропа baye bazali kondima na bosóló
  21. Mpe kati na bino moko, boye bozali kornona te
  22. Mpe bozui na bino, na maye bolakelama mazali olikolo
  23. Na Nkolo ya likolo na nsé, ezali ya sólo bosembo, ndakisa ya maye bozali kolobela
  24. Boye sango ya bapaya ya Ibrâhîm ya lokumu ekomelaki yo
  25. Tango bakotaki epai naye, balobi: Kimia (ezala nayo); ayanoli: Kimia mpe ezala likolo lia bapaya oyo bayebani te
  26. Мре akendaki malembe epai ya libota naye mpe amemelaki bango ngombe ya mafrita ya kotumba
  27. Mpe apusi yango pene na bango alobi: Bokolia te
  28. Mpe abangi bango, balobi: Kobanga te, mpe bapesi ye sango ya kobotama ya mwana ya mobali oyo atondi na bwanya
  29. Mwasi naye akei azali koganga mpe na komikwanza elongi naye, alobi: Mobange mpe ekomba lokola ngai, nabota ndenge nini
  30. Balobi: Lolenge wana nde Nkolo nayo alobi. Ya soló, ye azali moyebi atonda na bwanya
  31. (Ibrâhîm) alobi: Oh batindami! Boyeli nini
  32. Balobi: Ya sólo, totindami тропа batomboki
  33. Mpo tobwakela bango mabanga ya mabele ya makasi
  34. Oyo etiyami kowuta epai ya Nkolo nayo ezali тропа etumbu
  35. Мре tobimisaki bandimi okati na bango
  36. Мре tokutaki sé ndako moko ya mpamba ya baye bamisokia
  37. Mpe totikaki elembo тропа baye bazali kobanga etumbu makasi
  38. (Lolenge moko totikaki elembo) epai ya Mûssa, tango totindaki ye epai ya falo na makamwisi ya polele
  39. Kasi apesaki mokongo mpe alikiaki sé na makasi naye, mpe alobaki ete: Oyo azali nganga to azali ligboma
  40. Kasi tozuaki ye na mapinga naye, mpe tobwakaki bango okati ya mbonge тропа ezaleli naye ya mabe
  41. Lolenge moko na (bato) ya Aad, tango totindelaki bango mopepe ya mabe (etumbu)
  42. Ezalaki kotika eloko moko te oyo ezuaki yango na nzela kino ekomisaki yango putulu
  43. Lolenge moko na (bato) ya thamûd tango bayebisaki bango: Bosepela sé тропа tango ya moke
  44. Bazangaki kotosa mibeko mia Nkolo wa bango kino etumbu ezuaki bango bazali kornona
  45. Kaši bakokaki komitelemisa te, mpe bamilongisaki te
  46. Mpe lolenge moko ezalelaki bato ya Nûh liboso. Ya soló, bazalaki bato mabe
  47. Mpe totongaki likolo na bokasi na biso, mpe (totiyaki yango ezala) monene
  48. Mpe totandaki mabele, mpe oyo lolenge kitoko ya etando
  49. Mpe tokelaki biloko nyoso mibale mibale, mpo bokoka kokanisa
  50. Bokima epai ya Allah, nazali sólo mokebisi ya polele тропа ye
  51. Kasi botiela Allah nzambe mosusu te. Ya soló nazali mokebisi ya polele тропа bino kowuta naye
  52. Ezali boye. Mpe motindami moko te ayaka epayi na bato ya yambo sé baloba oyo azali nganga to azali moto ya ligboma
  53. Boye bazuaki lotomo yango te? Nzoka nde bazalaki nde balekisi ndelo
  54. Mitiya mosika na bango, bakogangela yo te, (тропа bango)
  55. Мре kundola, ya sôló bokundoli esalisaka bandimi
  56. Мре nakelaki bilima na bato te sé тропа kobondela ngai
  57. Nalukaka bozui epai na bango te, mpe nalukaka baleisa ngai te
  58. Ya sólo, Allah nde mopesi monene ya bozui, Nkolo bokasi koleka
  59. Kasi ya sólo, baye babubaki bakozua etumbu kokokana na biteni ya baninga baye babubaki, na yango, bawelisa yango te
  60. Mabe ekozala epai ya bapengwi o mokolo oyo balakaki bango