Oyo azalaki kobanga Ar- Rahmán, ata azali kornona ye te, mpe ayei na motema ya kotubela
Bokota na kimia okati na yango, wana nde mokolo ya seko
Bakozuaka nyoso oyo bakolinga mpe pembeni na biso bazali na litomba mosusu
Bato boni tobomaka liboso na bango, mpe balekaki bango na makasi, mpe batongaki bandako ya milai mpe ya kitoko, boye bazali na esika ya kokima (etumbu na biso)
Wana ezali bokundoli тропа oyo azali na motema to azali koyoka mpe kornona
Mpe tosilaki kokela likolo na nsé na nyoso oyo ezali o kati na yango mibale na mikolo motoba, kasi bolembu ezuaki biso te
Kanga motema тропа maye bazali koloba, mpe sanzola matondo ya Nkolo wayo, yambo ya kobima na moyi mpe yambo ya kokoto na yango
Mpe pesa ye lokumu kati kati ya butu mpe gumbama (тропа kosambela)
Мре yoka, о mokolo oyo mobeleli akobelela na esika oyo ezali pene
Mokolo oyo bakoyokaka ya soló bogangi ya makasi, wana nde mokolo ya bosekwisami
Ya soló, biso nde topesaka bomoyi mpe liwa, mpe epai na biso bozongi ekozala
Mokolo oyo mabele ekopasukaka тропа bango na lombangu, bosangani wana ezali pete тропа ngai
Toyebi malamu oyo bazali koloba, kasi ozali na mibeko ya komatela bango te, kundola na kurani moto azali kobanga etumbu na ngai