Oh bino bandimi! Boleka Allah na motindami naye te (nakozua mikano) bobanga Allah, ya soló azali moyoki atonda boyebi
Oh bino bandimi! Botombola mingongo na bino te likolo ya ntoma, mpe bolobela ye na koganga te, ndenge bosalaka bino na bino, noki te misala mia bino mikobeba mpe bokoyeba te
Ya soló, baye bazali kokitisa mingongo mia bango pene na motindimi, baye wana Allah amekisi mitema mia bango bobangi. Bakozua bolimbisi na lifuta linene
Ya soló, baye bazali kobenga yo libanda sima ya bandako, ebele na bango bazali na mayele te
Soki bazelaka kino okobima epai na bango wana ezali malamu тропа bango. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu
Oh bino bandimi! Soki moto ya kilikili ayeli bino sango boluka koyeba yango malamu, noki te bosala bato mabe na bozangi boyebi sima bokomi kolelalela тропа maye bosalaki
Mpe boyeba ete motindami ya Allah azali kati na bino, soki atosaki bino na makambo ebele, nde bokweyaki na kpokoso, kasi Allah alingeli bino bondimi mpe abongisi yango o mitema mia bino, mpe aboyeli bino bopengwi na kilikili mpe kozanga botosi. Ba oyo wana nde bakambami malamu
Wana ezali bolamu ewuti epai ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya
Mpe soki lisanga ya bandimi mibale bazali kobunda, bobongisa kati na bango, mpe soki mosusu aboyi koyoka, bosangana тропа kobundisa ye kino akozonga na mobeko ya Allah. Mpe soki ayoki, bobongisa kati na bango na bosembo, mpe bosembola. Mpamba te Allah alingaka baye bazali kosembola
Ya soló, bandimi bazali bandeko, mpe bobongisa bondeko kati na bino. Mpe bobanga Allah mpo ete bozua ngolu naye
Oh bino bandimi! Lisanga moko te kati na bino etiola baninga,tango mosusu bazali malamu koleka bino, basi mpe batióla baninga te tango mosusu bazali malamu koleka bango. Bomibebisana lokumu te, mpe bomipesana bankombo ya mabe te, wana ezali ebengeli ya mabe sima ya bondimi. Mpe oyo akotubela te, bango wana nde bazali babubi
Oh bino bandimi! Tika ete bomitia mingi penza mosika ya kokanisela, mpamba te kokanisela mosusu makanisi ezali masumu, bomilandana te na koyeba basekele ya baninga, mpe botongana te, moko kati na bino akolinga kolia mosuni ya ndeko naye akufa? Bokosepela na yango te, kasi bobanga Allah. Ya soló, Allah ayambaka tubela atonda ngolu
Oh bino bato! Ya sólo, tokelaki bino kowuta na mobali mpe mwasi, mpe tokesenisi bino bamboka mpe bikolo mpo ete boyebana. Ya sólo, moto ya lokumu koleka kati na bino azali oyo azali kobanga Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda basango
Bato baye bafandaka na bamboka balobi: Tondimi, loba ete: Naino bondimi te, kasi boloba ete: Tobongoli mitema, mpamba te, naino bondimi bofandeli bino na mitema te, mpe soki botosi Allah na motindami waye, akokutola eloko moko te na misala na bino. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda ngolu
Ya soló, bandimi nde baye bandimi na Allah na motindami naye, sima bazali kotia tembe te, mpe bazali kobunda na misolo mia bango na milimo mia bango o nzela ya Allah. Bango nde (bato) ya bosembo
Loba: Boye nde bokotangisa Allah lingomba lia bino mpe Allah ayebi maye mazali o likolo mpe o nsé? Mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso
Bazali kolobela yo mpo na islamu na bango ete babongoli mitema, loba: Bolobela ngai islamu na bino te, kasi Allah nde akolobela islam na bino na ndenge akambi bino na bondimi, soki ya soló bozali na bosembo
Ya soló, Allah ayebi manso maye mabombami na likolo mpe na nsé, mpe Allah azali kornona oyo bozali kosala