44.The Smoke

  1. Hâ, mîm
  2. Na buku (kurani) ya polele
  3. Ya soló, tokitisaki yango o butu ya mapamboli. Ya soló, biso tozali bakebisi
  4. O kati na yango mokano ya makambo manso ya bwanya mazali kozuama
  5. Motindo kowuta epai na biso. Biso nde totindaka
  6. Mawa kowuta na Nkolo wayo. Ya sólo ye azali moyoki atonda boyebi
  7. Nkolo ya likolo na mabele na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki ya sólo bozali na tembe te
  8. Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye apesaka bomoyi na liwa, Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bankoko na bino wa yambo
  9. Kasi bango (bato) wana bazali na tembe, bazali kosakana
  10. (Malamu) zela mokolo oyo likolo ekoya na molinga ya polele
  11. Ekozipa bato, oyo nde etumbu ya makasi
  12. Nkolo; tiya etumbu mosika na biso, ya soló tozali bandimi
  13. Lolenge nini bokundoli na mitema epesa bango pasi, kasi motindami asilaki koyela bango polele
  14. Sima bapesi yango mokongo mpe balobi: Batangisa ye, azali na ligboma
  15. Tokolongola etumbu moke. Ya sólo, bozali bato mabe
  16. Mokolo tokobeta na ndenge ya mabe, mpo ete biso esengeli tosala bongo
  17. Мре liboso na bango, tomekaki bato ya falo, mpe motindami ya malamu ayelaki bango
  18. (Ayebisi) bango: Bopesa ngai bawumbu ya Allah, nazali motindami malamu epai na bino
  19. Bomilakisa te epai ya Allah na kosalela ye lolendo. Ya solo, nayeli bino elembo ya polele
  20. Mpe ya soló, nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino. Mpo ete bobamba ngai mabanga te
  21. Mpe soki bondimeli ngai te, bomitiya mosika na ngai
  22. Abengaki Nkolo wa ye, ya solo bazali batomboki
  23. Sala mobembo na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ete bokolandama (na banguna na bino)
  24. Tika ebale lolenge wana, esengeli na bango bazinda (kokufa)
  25. Boni batikaki kati na bilanga na miluka
  26. Bilanga na milona na bandako ya kitoko
  27. Na bilengi biye bazalaki kosepela kati na yango
  28. Lolenge wana nde ezalaka, mpe tokitanisaki yango bato mosusu
  29. Ezala likolo na mabele etikalaki kolela te na kozela
  30. Mpe tobikisaki bana ya isalayele na etumbu ya nsoni
  31. Kowuta epai ya falo oyo amilakisaki okati ya bato mabe
  32. Mpe tosilaki kotiya bango bazala elembo тропа molongo mobimba
  33. Mpe topesaki bango makamwisi тропа komeka bango
  34. Ya soló, ba oyo wana bazali koloba
  35. Liwa тропа biso nde oyo ya yambo, tokoki kosekwa lisusu te (sima na yango)
  36. Bozongisa bankoko na biso soki bozali koloba bosóló
  37. Boye bango nde bato malamu to bato ya tubbai (motindami to moto malamu), baye bazalaki liboso na bango, tobomaki bango mpo ete bazalaki bato mabe
  38. Mpe tokelaki likolo na mabele mpe manso maye mazali kati na yango pamba te
  39. Tokelaki yango mibale na bosóló, kasi ebele na bango bazali koyeba te
  40. Ya sólo, o mokolo mwa bokati (makambo ya bato) nde ekozalaka elaka na bango banso
  41. Mokolo moye moninga to moto ya pene akosalisaka yo na eloko te, mpe bakosunganaka te
  42. Longola sé oyo Allah akoyokelaka mawa. Ya soló, ye azali wa bokasi atonda ngolu
  43. Ya soló nzete ya Zaqqúm
  44. Ekozalaka bilei ya basumuki
  45. Lokola mafuta ya mabe, ezali kotokisa libumu
  46. Lokola kotoko ya mayi ya moto ya makasi
  47. Bozua ye mpe bomema ye o kati ya moto
  48. Sima bobwakela ye mayi ya moto na motu naye, lokola etumbu makasi
  49. Meka, ya sólo, yo (okanisaki ete) ozali na bokasi mpe lokumu
  50. Wana nde maye bozalaki kotiya tembe mpe kobundisa
  51. Ya sólo, babangi bakozalaka na bovandi bwa kitoko
  52. Kati na bilanga na mingala (mia lola)
  53. Bakolataka bilamba bia pepele ya pembe bitongama bazali kotalana
  54. Na yango, tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene
  55. Mpe na kimia penza bakosengaka kati na yango bambuma kitoko ya lolenge nyoso
  56. Liwa likozuaka bango te, sé oyo ya liboso mpe abateli (Allah) bango na etumbu ya lifelo
  57. Bolamu ya Nkolo wayo. Wana nde elonga ya monene
  58. Mpe ya soló, tokomisaki yango mpete na lolemu nayo mpo ete; basalisana na yango na bokundoli
  59. Zela moke, bango mpe bakozela