43.Ornaments of gold

  1. Há, mím
  2. Mpe buku eye elimbolama polele
  3. Ya sôló, totiaki yango kurani na lokota ya arabo mpo ete bokanisa
  4. Mpe ya sôló, yango ezali o kati ya mama ya makomi pembeni na biso o likolo koleka etonda bwanya
  5. Boye tóbetela bino bokundoli ete bozalaki bato mabe
  6. Boni kati ya bantoma baye totindaki epai ya bato ya yambo
  7. Ntoma atikalaki koyela bango te sé kino batióla ye
  8. Mpe tobomaki mingi koleka kati na bango, mpe tosilaki kotanga ndakisa ya bato ya yambo
  9. Mpe soki otuni bango; nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: ya soló, oyo akela yango nde oyo azali na bokasi atonda boyebi
  10. Oyo atiyelaki bino mabele ezala etando ya kofanda, mpe atiyeli bino banzela kati kati na yango mpo bokambamaka (na yango)
  11. Ye nde akitisaka mayi kowuta na likolo na bokoki, mpe tozali kopesa na yango bomoyi na mboka oyo ekufa (ekawuka), mpe lolenge wana nde bokobimisama
  12. Mpe ye nde akela balongani mibale mibale bango banso, mpe asaleli bino masuwa na banyama mpo bomataka na yango
  13. Mpo ete bofanda na mikongo mia yango, mpe bokanisa bolamu ya Nkolo wa bino osima ya komata na yango mpe bokolobaka: lokumu ya oyo asaleli biso maye, mpe tozalaki na makoki ya kosala yango te
  14. Mpe ya soló epai ya Nkolo wa biso nde tokozongaka
  15. Mpe kati ya bawumbu naye oyo akela bango bazueli ye bambanda. Ya soló, moto azali na bopengwi monene mpe ya polele
  16. To na kati ya maye akela aponi bana basi (ba anzelu), mpe asali bino bana mibali
  17. Мре soki bapesi moko kati na bango sango ya maye bazali kopesa na Ar-Rahmân (Allah) (тропа kobotama ya mwana mwasi), okomona elongi naye ekomi moyindo na mawa. (etondi na pizoli na kosilika)
  18. (Soki batuni ye) ezali nini? (Akolobaka ezali nde mwana mwasi), oyo akoki kosala ata eloko moko te, mpe akoki mpe kotelema тропа koloba polele te, sé kosala mabe
  19. Mpe bazali kokomisa baanzelu baye bazali bikelamu ya Ar-Rahmân ete bazali basi. Boye bazalaki banzeneneke na bokelami na bango? Ekokomama maye bazalaki koloba mpe bakotunama
  20. Mpe bazali koloba ete: Soki Ar-Rahmân alingaki nde tobondeli bango te, bazali na boyebi moko te, bazali sé na makanisi mabe
  21. To boye topesaki bango buku liboso mpo basimbama na yango
  22. Kasi bakolobaka ete: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo mpe tozali na bokambami mpe tozali sé kolanda yango
  23. Мре lolenge wana nde totindaki liboso nayo mokebisi na engumba sé bato ya bozui kati na yango baboya (ye) mpe baloba: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo, tokolanda sé nzela na bango
  24. (Mokebisi) alobi ata soki nayeli bino nzela ya semba koleka oyo ya bankoko na bino? Bakoyanolaka: Tokondima na maye oyei na yango te
  25. Tozuaki bango mabe, mpe tala lolenge nini bato ya lokuta basukaki
  26. Mpe tango Ibrâhîm alobaki na tata waye na bato naye: Ya soló, ngai namitiye mosika na maye bozali kobondela
  27. Longola sé oyo akela ngai, ya sólo ye nde akokamba ngai na (nzela ya semba)
  28. Mpe atiaki liloba bango litikala na libota lia ye, na ntina ete bamizongisa epai ya Allah
  29. Kasi napesaki bango na batata na bango bisengo ya токе kino bosembo (kurani) eyelaki bango mpe na motindami ya polele
  30. Mpe tango bosóló eyelaki bango balobi: Oyo ezali bondoki bwa polele, mpe tokondimela yango te
  31. Мре balobaki: Mpona nini bakitisaki kurani te ata epai ya moto ya monene kati ya bamboka mibale
  32. Boye bango nde bakabolaka bolamu ya Nkolo wayo? Tokabolelaki bango bomoyi bwa bango kati na mokili, totomboli basusu koleka baninga, mpo basusu bazala basali ya baninga. Mpe ngolu ya Nkolo wayo ezali malamu koleka maye bazali kosangisa
  33. Soki (bobangi) te ete bato bazala umma moko (ya libungi), nde totielaki bapengwi ya Ar- Rahmán mpona bandako na bango motondo ya mabende ya pembe mpe ngala-ngala (ebuteli) mpo bamataka na yango
  34. (nde totielaki bango) na bandako na bango bikuke mpe bambeto ya kitoko oyo bakofandela
  35. Na bonzenga. Wana nyoso ezali mpona bosepeli ya bomoyi bwa mokili, kasi ya mokolo mwa suka epayi ya Nkolo nayo ezali mpona babangi
  36. Na oyo akokanga miso (mpe amitiye mosika) mpona bokundoli bwa Ar-Rahmân, tokotiela ye satana azala moninga naye ya libela
  37. Мре ya soló, bazali kopekisa bango nzela, mpe ya sólo, bazali kokanisa ete bazali na nzela ya semba
  38. Kino moto wana akokoma epai na biso akoloba na elima naye ete: Mawa na ngai! Soki ntaka kati na ngai nayo lokola moniele na eloli, mpe oyo moninga ya mabe
  39. Mokolo mona mokosalisaka bino na eloko te mpo bozalaki babubi, bokosanganaka okati ya etumbu
  40. Boye, yo nde ozali na bokoki ya koyokisa mokufi matoyi to boye okambaka mokufi miso to oyo azali na libungi ya polele
  41. To mpe tokotombola yo na likolo (koboma yo), mpe ya sólo, tokosilana na bango
  42. To tolakisa yo mabe oyo tolakaki bango (etumbu) kasi tozali na bokasi likolo na bango
  43. Zala na bokangami na maye bamoniselaki yo. Ya sólo, ozali na nzela ya semba
  44. Ya sólo (kurani oyo), ezali bokundoli тропа yo mpe bato nayo. Mpe mosika te bokotunama
  45. Мре tuna batindami ba biso baye totindaki liboso nayo, boye tozalaki kozua banzambe misusu na botiki Ar-Rahmán тропа kobondela bango
  46. Mpe tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi та biso epai ya falo na bato naye (bankumu), mpe alobaki: Ya soló, nazali motindami ya Nkolo ya mokili
  47. Mpe tango bayeli bango makamwisi та biso, okomona bango bazali koseka yango
  48. Mpe na likamwisi nyoso na oyo tolakisaki bango, ezalaki makasi mingi koleka oyo ya liboso. Mpe topesaki bango etumbu mpo tango mosusu bakoki komizongisa epai na biso
  49. Mpe balobi ete: Oh yo nganga! Sengela biso Nkolo nayo тропа maye alakaki epai nayo, na yango tokokambama ya sólo na nzela ya semba
  50. Mpe tango tolongoleli bango etumbu, okomona bango wana babuki mibeko ya elaka
  51. Mpe falo abengi bato naye alobi: Oh bato na ngai! Bokonzi ya ezipito ezali na ngai te, mpe mayi ya ebale oyo ezali kotambola na nsé na ngai, boye bozali kornona te
  52. To boye nazali malamu te koleka moto mpamba oyo, mpe alobaka polele te
  53. Mpona nini babwakeli ye basinga ya wolo ya maboko te, to mpe ba anzelu baya naye elongo
  54. Na boye nde abangisaki bato naye mpe batosi ye. Ya soló, bazalaki bato mabe
  55. Mpe tango bapesaki biso kanda makasi, tozuaki bango mpe tozindisaki bango banso
  56. Mpe totiaki bango bazala liteya mpona baye bakoya sima na bango
  57. Mpe tango ndakisa ya mwana ya Maryam, epesamaki bato nayo bakomaki koyima yima (bamoni yango pamba)
  58. Balobi banzambe na biso to ye, nani azali malamu? Babeti ndakisa wana sé mpona yo na lolenge ya bilobaloba, kasi bazali sé bato balutisaki kosuana
  59. (Issa) azali sé mowumbu oyo topessaki ye bolamu, mpe tozalisa ye ndakisa mpona bana ya isalayele
  60. Soki tolingaki nde totiaki kati na bino ba anzelu awa na nsé bazali kokitana
  61. Mpe ya soló, akozala elembo тропа mokolo ya suka,botia tembe te, mpe bolanda ngai. Oyo nde nzela ya semba
  62. Satana abungisa bino te mpo azali monguna ya polele тропа bino
  63. Mpe tango Issa ayaki na bilembo alobaki: Nayeli bino yango na bwanya, mpe mpo nalimbolela bino ndambo ya maye bozalaki kokesene na yango. Bobanga Allah mpe botosa ngai
  64. Ya solo, Allah azali Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino, bobondela ye. Oyo nde nzela ya semba
  65. Kasi bakeseneki kati kati na bango. Babubi bakozuaka mabe o mokolo mwa etumbu ya makasi
  66. Boye bazali kozela (mokolo ya suka) yango ekoyela bango mbalakaka mpe bakoyeba te
  67. O mokolo mona, baye balinganaki bakokomaka banguna kati kati na bango, longola sé babangi (Allah)
  68. Eh! Bawumbu na ngai! Lelo, bozala na bobangi mpe niawa te
  69. В aye bandimaki na bilembo bia biso, mpe bazalaki kotosa (ba mizilima)
  70. Bokota o kati ya Iola, bosala biyenga elongo na basi na bino, (bosepela)
  71. Basani mpe bakopo ya wolo biko balukaka, bikotiama liboso na bango, o kati na yango bitondi na maye mazali na mposa na bango mpe bosepelisi miso. Bokozala libela na kati na yango
  72. Wana ezali nde lola oyo bokitani yango, тропа maye bozalaki kosala
  73. Kati na yango bokozalaka na bambuma ebele тропа kólia
  74. Ya sôló, batomboki bakozalaka na etumbu ya moto ya lifelo libela
  75. Ekokutolama te mpe bakozanga elikia o kati na yango
  76. Tosalaki bango mabe te kasi bango moko nde bamisalaki mabe
  77. Mpe bakobelelaka: Oh Mâlik! Nkolo wayo aboma biso, akoyanolaka bango: Botikali libela o kati na yango
  78. Tosilaki koyela bino bosôló, kasi ebele kati na bino baboyaki yango
  79. Boye basili kokana likita, kasi biso nde tozali na likita
  80. To bazali kokanisa ete toyokaka sekele na koyima yima na bango na mongongo ya sé te? Iyo! Batindami na biso epai na bango bazali kokoma nyoso (ba anzelu)
  81. Loba: Soki Ar-Rahmân azalaka na mwana, nalingaki kozala wa yambo тропа kobondela
  82. Lokumu na Nkolo ya likolo na ya mabele, Nkolo ya ngwende na maye bazali koloba
  83. Tika bango bazinda na mabe mpe basakana kino bakokutana na mokolo mwa elaka na bango
  84. Ye nde azali Nzambe ya kobondela likolo mpe o nsé, тре azali wa bwanya atonda boyebi
  85. Mpe apambolami ye oyo azali na bokonzi ya nsé na ya likolo, na maye ezali okati na yango, mpe ye nde azali na boyebi ya tango ya suka. Mpe epai naye nde bokozongisama
  86. Мре baye bazali kobondela bango elongo naye (Allah), bakokoka te kolobela, longola sé baye batatoli bosembo mpe bango bazali koyeba
  87. Mpe soki otuni bango nani akela bango, bakolobaka: Ya soló ezali Allah, kasi тропа nini bazali kopesa ye mokongo
  88. Mpe liloba lia ye (ntoma Muhammad epai ya Allah): Nkolo! Ya soló, bato wana bakondimaka te
  89. Malamu, mitiya mosika na bango (limbisa bango) mpe loba: Boboto. Kala mingi te bakoyebaka