41.Explained in detail

  1. Hâ, mîm
  2. Emoniseli ekiti kowuta epai ya oyo wa boboto atonda ngolu
  3. Buku eye mikapo miango milimbolami, etangeli na yango na lokota ya arabe (monoko ya arabo) mpo ete bato bayeba
  4. (Mpo) epesa sango elamu mpe ekebisa, kasi ebele kati na bango bamitiye mosika mpe bazali koyoka te
  5. Mpe balobi: Mitema mia biso mikangami na maye ozali kobenga biso na yango, matoyi na biso mazali ya kokangama, kati kati na biso nayo ezali na ezipelo. Sala oyo ya yo, biso mpe tosala ya biso
  6. Loba: Ya soló, nazali sé moto lokola bino oyo liloba ekitelaki ngai ete Nzambe na bino azali sé moko, bomisembola epai naye mpe bosenga ye bolimbisi. Kasi mawa ezali na basangisi (Allah)
  7. Baye bazali koboya kofuta zakat mpe bazali kopengwa тропа mokolo ya suka
  8. Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na lifuta liye likokatanaka te
  9. Loba: Ya sólo, bozali kopengwa naye oyo akeli mabele na mikolo mibale, mpe bozali kotiela ye bambanda? Ye wana nde Nkolo ya mikili
  10. Ye apika bangomba likolo na yango, mpe apamboli yango mpe akokisi bomengo na yango na mikolo minei, wana nde eyano тропа baye bazali kotuna yo
  11. Sima, amitalisi na mapata na yango ezalaki sé milinga, mpe alobaki na yango na mabele ete: Boya epai na ngai, bolinga to bolinga te, biango bizongisaki ete: Toyei na botosi bonso
  12. Mpe akokisi bokeli likolo sambo okati ya mikolo mibale mpe abongisi makambo ya likolo moko na moko, mpe apesi likolo ya pene bozenga ya bongengi mpe bobatelami, wana mitindo ya oyo azali na nguya atonda boyebi
  13. Soki baboyi loba (na bango): Nakebisaki bino etumbu oyo ekoboma, lokola oyo ezuaki bato ya Aad na Thamûd
  14. Tango batindami na bango baydaki bango kowuta na bango moko liboso na sima, (balobaki na bango) ete: Bobondela sé bobde Allah, balobaki ete: Soki Nkolo na biso alingaki nde akitiselaki biso ba anzelu, na yango biso topengwi na maye botindami na yango
  15. Kasi тропа ba aad, basalaki lolendo na mokili kasi bosembo te, mpe balobaki etemani aleki biso na makasi? Boye bazali kornona te ete Allah oyo akeli bango ye nde aleki bango na makasi? Mpe bazalaki kowangana bilembo bia biso
  16. Mpe topesaki bango etumbu ya mopepe ya makasi mpe ya malili, mikolo mina mizalaki mabe mpo tomekisa bango etumbu yakokitisama, kati ya bomoyi ya mokili, mpe etumbu ya mokolo ya suka ekoleka lisusu makasi, mpe bakosungamaka te
  17. Kasi тропа ba Thamüd, tokambaki bango, kasi basepelaki nde na molili o esika ya bokambami, nkake ya etumbu makasi ezuaki bango тропа ntina ya maye bazalaki kosala
  18. Mpe tolongisaki baye bandimaki mpe baye bazalaki na bobangi
  19. Мре mokolo oyo banguna ya Allah bakosangisama ebele тропа kokende na moto, тре bokotindikama okati na yango
  20. Kino bakokoma na kati, matoyi na bango na miso na bango na loposo na bango, mikozala nzeneneke likolo na bango тропа maye bazalaki kosala
  21. Мре bakoloba na baloposo na bango ete: Mpona nini bozali kolobela mabe na biso? Baloposo bikozongisa eyano ete: Allah oyo alobisaka biloko binso ye nde alobisi biso. Мре ye nde akelaki bino mpona mbala ya liboso mpe epai naye nde bokozongisama
  22. Mpe bokokaki te komibomba na matoyi mpe miso mpe loposo na bino ete balobela mabe na bino te, kasi bokanisaki nde ete: Allah ayebi te ebele ya maye bozalaki kosala
  23. Makanisi та bino maye bokanisaki mpona Nkolo wa bino ebomisi bino, yango ekotisi bino na molongo ya bazangi
  24. Ata soki bakangi motema, sé bobele moto nde ekozala efandelo na bango, mpe soki baluki kosenga bolimbisi ekondimama te
  25. Мре topesaki bango baninga ya (bilima) baye bakokabwana na bango te, mpe babongiseli bango makambo maye mazali liboso mpe sima na bango mpe liloba ekokisamaki likolo na bango ndenge esalamaki na baye baleka liboso na bango kati na bilima mpe bato. Ya soló, bazalaki bazangi
  26. Mpe bapengwi balobi: Boyoka kurani eye te, bosalela yango makelele (tango ezali kotangama) mpo bolonga yango
  27. Ya sólo, tokomekisaka bapengwi etumbu ya makasi, mpe tokofutaka bango mabe koleka тропа maye bazalaki kosala
  28. Wana nde lifuta ya banguna ya Allah ekozalaka moto, bakovandaka kati na yango libela, lifuta lia etumbu тропа ndenge baboyaki kondima na mikapo mia biso
  29. Mpe bapengwi bakolobaka: Nkolo; lakisa biso baye babungisaki biso kati ya bilima na bato, mpo totia bango na nsé ya makolo na biso, mpo bazala bato ya nsé na biso koleka. (okati ya moto)
  30. Ya soló, baye bazali koloba ete: Nkolo na biso nde Allah, sima bamisembolami, ba anzelu bazali kokitela bango ete: Bobanga te mpe bomitungisa te, kasi bozua sango elamu ya Iola eye balakaki bino
  31. Tozali babateli na bino awa na mokili na mokolo mwa suka lokola, bokozuaka maye bokolingaka na maye bokosengaka
  32. O esika ya boyambi epai ya molimbisi atonda ngolu
  33. Nani azali na liloba kitoko koleka moto oyo azali kobenga bato epai na Allah, mpe asali mosala ya malamu, mpe alobi ete: Ya sólo, ngai nazali okati ya bamizilima
  34. Mpe kosala bolamu na kosala mabe ezali ndenge moko te. Longola mabe na ndenge ya malamu, mpe oyo azalaki monguna nayo, akokoma moninga nayo ya makasi
  35. Mpe likabo ya boye epesamaki te sé na bakangi mitema, mpe epesamaka sé na oyo atonda ngrásia
  36. Mpe soki satana abandi kotungisa yo, senga libateli epai na Allah, mpo ete azali moyoki atonda boyebi
  37. Мре okati ya bilembo bia ye (Allah), ezali butu na mokolo, moyi na sanza, bogumbamela moyi na sanza te, kasi bogumbamela Allah oyo akela yango, soki ya soló, bozali kobondela ye
  38. Mpe soki basali lolendo,kasi baye bazali pembeni ya Nkolo nayo, bakumisaka ye butu na moyi mpe bazali kolemba te
  39. O kati na bilembo bia ye, ozali kornona mabele ekawuki na botosi mpe bobangi, mpe tango tokitisaka mayi likolo na yango, etombwamaka mpe ekomi monene. Ya sólo oyo apesi yango bomoi, ye nde akosekwisa bawa. Ya sólo, azali na bokoki likolo ya biloko binso
  40. Ya sólo, baye bazali kobebisa ndimbola ya mikapo mia biso, bakokoka kokima biso te. Boye, moto oyo akobwakama na moto azali malamu koleka oyo akoyakaka na kimia o mokolo ya suka? Bosala maye bolingi, ya sólo, amonaka maye bozali kosala
  41. Ya sólo, baye bapengwa na bokundoli (kurani) tango eyelaki bango, mpe ya sólo yango ezali buku ya lokumu
  42. Mabe ezuaka yango sikoyo te, to sima na yango te, ewuti epai ya oyo azali bwanya atonda lokumu
  43. Oyo ezali kolobama ezali sé oyo esila kolobama na batindami liboso nayo. Ya soló, Nkolo nayo atonda bolimbisi mpe azali makasi na kopesa etumbu
  44. Mpe soki totiaka kurani oyo na lokota mosusu (ya arabo te), balingaki koloba ete: Mpona nini balimboli mikapo na yango polele te? Nini? Kurani na lokota ya bapaya (motindami) arabo? Loba: Yango ezali bokambi mpe libiki mpona bandimi, kasi baye bandimi te matoyi na bango makangami mpe miso na bango mazipami. Bango wana nde bakobengama о esika ya mosika
  45. Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, sima bokeseni ekotaki. Mpe soki mpona liloba ya Nkolo nayo te oyo esilaki kolobama, nde likambo esili kokatama kati na bango. Mpe bazali sé na tembe
  46. Oyo akosala malamu, ezali mpona ye moko, mpe oyo akobebisa ezali sé mpona ye moko. Kasi Nkolo wayo abubaka kati kati ya bawumbu naye te
  47. Boyebi ya mokolo ya suka ezali sé na mayele naye moko. Mpe mbuma moko te ekobima na kati ya loposo na yango, mpe mwasi moko te akomema zemi to akobota, kino ekozala sé na mayele naye. Mpe mokolo akobenga bango ete: Wapi bambanda na ngai? Bakozongisa ete: Tozali koloba nayo na bosembo ete: Tozali na nzeneneke ata moko te oyo akondimela biso ete ozali na bambanda
  48. Mpe baye bazalaki kokumisa bango liboso bakosundola bango, mpe bakoyebaka ete bazali na esika ya kokimela te
  49. Moto atikaka kosenga bolamu te, mpe soki mabe ezui ye alongoli elikia
  50. Mpe soki topesi ye bolamu na biso o sima ya mpasi azalaki na yango, alobi: Oyo ezali na mayele na ngai, mpe nandimi te ete mokolo ya suka ezali, mpe soki bazongisi ngai epai na Nkolo na ngai, nakozua sé oyo ya ngai ya kitoko. Mpe тропа baye bapengwa tokopesa bango sango ya maye bazalaki kosala, mpe tokomekisa bango etumbu ya makasi
  51. Мре tango topesaka moto bolamu, akimaka mosika, mpe soki mabe ezui ye akomi kosenga makasi
  52. Loba: Bomoni ndenge nini soki (kurani) oyo ewutaki epai ya Allah mpe sima bopengwi na yango, nani aleki kobunga koleka oyo amitiye mosika na mikakatano
  53. Tokolakisaka bango bilembo bia biso o kati na mokili mpe na banzoto na bango moko, kino bakoyebaka ete ya soló, kurani ezali bosóló, boye Nkolo wayo akoki te? Ya soló, ye azali na bokoki mpe amonaka manso
  54. Bazali na tembe тропа bokutani na Nkolo wa bango. Ya sólo ye azingi biloko binso