38.The letter Saad

  1. Swâd, na kurani, eye ezali na bokundoli
  2. Kasi baye bapengwa bazali sé na ntembe
  3. Bato boni tobomaki liboso na bango, bagangaki ete: Oh biso! Kasi ezali lisusu tango ya kobika te
  4. Mpe (bato ya makkah) bakamuaki ete mokebisi kati na bango akomela bango, mpe bapengwi balobaki: Oyó azali nganga mpe moto ya lokuta
  5. Boye alingi kotia banzambe ete bakoma sé Nzambe moko? Oyó ezali likambo ya kokamwa
  6. Mpe bankumu na bango bakei mpe balobi: Bökende mpe botikala na banzambe na bino. Ya soló wana nde ezali malamu
  7. Totikala koyoka yango te na lingomba lia suka ya sólo, eloko oyo basali yango kosala
  8. Nini? Ezali nde ye oyo bakitiseli ye bokundoli kati kati na biso? Bazali na tembe тропа bokundoli bwa ngai, kala te, bakomekaka etumbu na ngai
  9. То, boye basimbi sanduku ya ngolu ya Nkolo wayo wa bokasi mopesi manso
  10. То boye bango basimbi bokonzi ya likolo na ya nsé, mpe maye manso mazali o kati na yango mibale? Bamata na eloko nyoso oyo ekosalisa bango тропа kobuta
  11. Mapinga oyo basangisi awa, ekosalaka eloko te sé bokweisami. (lokola lolenge ezalelaki ba ahzâb kala)
  12. Liboso na bango, bato ya Nüh, na ba Aad, na falo moto ya bandako etongama, baboyaki kondima
  13. Mpe Thamüd, na bato ya Loth, na bato ya aïkat, banso basanganaki. (mpe baboyaki kondimela bantoma)
  14. Ata moko te andimelaki batindami, mpe bazuaki etumbu
  15. Bazalaki kozela sé lolaka moko liye likopesa bango ata bopemi moko te
  16. Мре balobaki: Nkolo pesa biso oyo ya biso yambo ete mokolo ya suka eya
  17. Zala na bozeli тропа oyo bazali koloba, mpe kanisa na mowumbu wa biso Dáwud, oyo atonda na bokasi yakokumisa biso. Ya soló ye azalaki komizongisa (epai ya Allah)
  18. Мре totiyaki bangomba ezala na botondi tongo mpe pokwa elongo naye
  19. Mpe bandeke lokola, nyoso esalamaki sé тропа kokumisa ye. (Allah)
  20. Mpe tolendisaki bokonzi bwa ye, mpe topesaki ye bwanya mpe mayele ya kokata makambo
  21. Boye basango ya bato ya kosuana ekomelaki yo te? Tango babutaki na esika ya losambo. (ya likolo)
  22. Tango bakotelaki Dáwud, mpe abangaki. Balobaki naye ete: Kobanga te, tozali kowelana biso mibale, kabola kati na biso na bosembo, kasi kotengama te, mpe kamba biso o nzela ya semba
  23. Ya sólo, ndeko wa ngai ya mobali oyo azali na bameme ntuku libua na libua, mpe ngai nazali na meme moko, alobi na ngai: Pesa nabombela yo yango, mpe tango tozongisani maloba, alobi na ngai mabe
  24. (Dáwud) alobi: Abubaki yo ya sôló, тропа kosenga yo тете nayo mpo akokisa na (yango motango) oyo ya ye, mpe ya sôló bato balingaka kobotolo biloko ya baninga, longola sé baye bandima mpe basalaka misala milamu, kaši bazali токе. Мре Dâwud akanisaki ete tomekaki ye, asengaki bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe agumbamelaki mpe atubelaki
  25. Mpe tolimbisaki ye na yango mpe epayi nabiso akozala na esika ya likolo mpe oyo esika malamu ya kozonga
  26. Eh Dâwud! Ya soló, totiyaki yo mokitani kati na mabele, mpe kata kati na bato na bosembo, kasi kolanda baposa te, noki te ekobungisa yo nzela ya Allah. Ya sólo, baye babungi nzela ya Allah, bakozalaka na etumbu ya makasi, mpo ete babosanaki (kokanisa) na mokolo mwa suka
  27. Mpe tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali kati kati na yango mpamba te, lolenge wana nde bapengwi bazali kokanisa. Kasi bapengwi bazali na mpasi o kati ya moto, (ezali kozela bango)
  28. То boye bandimi baye basalaki misala milamu bazala lokola baye babebisaki na mokili? То totiya babangi (Allah) ndenge moko na bato mabe
  29. Buku eye tokitisaki epai nayo, ya mapamboli mpo ete basosola mikapo mia yango, mpe mpo ete banganga ya mayele bakundola yango
  30. Mpe topesaki Dáwud likabo ya mowumbu ya malamu Suleyman, ya soló, azalaki kosenga bolimbisi mingi
  31. Tango batiaki liboso naye bampunda ya kitoko sima ya nzanga тропа kokima mbangu
  32. Mpe alobaki ete: Ya soló ngai namipesi kolinga biloko ya mokili, kino nabosani bokundoli bwa Nkolo na ngai kino moyi molimwi
  33. Bozongisela ngai yango, na yango abandi kokata yango makolo na bakingo
  34. Mpe ya sólo, tomekaki Suleyman, tobwakaki likolo ya kiti naye nzoto ya moto, sima atubelaki
  35. Alobi: Nkolo! Limbisa ngai mpe pesa ngai bokonzi boye moko te sima na ngai akokana na yango. Ya sólo, ozali mopesi monene
  36. Мре totielaki ye mopepe, ezalaki kotambola na mitindo naye bipai binso alingaki na mpete
  37. Mpe basatana bazalaki kotongela ye ndako, basusu bazalaki kokota na nsé ya mayi тропа kosalela ye mosala
  38. Na basusu lokola, bakanga bango mibale mibale na minyololo
  39. Oyó nde likabo lia biso, kabola yango,to kopesa te, sala ndenge olingi
  40. Mpe epayi na biso akozala na esika ya likolo oyo esika malamu ya kozonga
  41. Mpe kundola mowumbu wa biso Ayúb tango abelelaki Nkolo waye, ete satana akangi ngai na mpasi mpe etumbu
  42. Beta (mabele) na makolo nayo, oyo ezali mayi ya тріо mpo osukola mpe órnela mosusu
  43. Mpe tozongiselaki ye libota lia ye, mpe tobakiselaki ye libota mosusu. Wana ngolu na biso тропа bokundoli ya bato banso ya mayele
  44. Mpe simba na loboko nayo eteni ya singa ya libende mpe bete yango, kasi kozangisa elaka te, ya soló tokutaki ye na bokangi motema mpenza, oyo nde mowumbu ya malamu azalaki kotubela mingi
  45. Мре kanisa тропа Ibrâhîm па Is’hâq па Ya’qüb, bawumbu па biso ya nguya mpe ya mayele
  46. Ya soló toponaki bango boponami ya bokundoli ya lola
  47. Mpe ya sólo, bazali epai na biso, baponami ya malamu
  48. Mpe kanisa Ismail na Al-yasa’ na Dzul-kifl, bango banso bazalaki kati na baponami malamu
  49. Oyó nde bokundoli, mpe babangi bakozalaka na bozongi bolamu
  50. Lola ya edeni bizibeli na yango ekozala ya kofungowama pona bango
  51. Wana nde bakoyekemelaka yango, bazali kosenga bambuma ebele, mpe komela
  52. Mpe pembeni na bango, bakozala na basi ya kitoko, baye bazali na miso ya kolula te
  53. Oyó nde elengelamaki тропа bino mokolo mwa lifuta
  54. Ekozalaka nde bopesi bwa biso eye ekokutuama te
  55. Wana, batomboki bakozala na bozongi ya mabe
  56. Lifelo nde ekozikisa bango, bovandi kani ya mabe ya lolenge wana
  57. Na yango, bakomela mayi ya tofina ya moto makasi
  58. Mpe bakozuaka bitumbu bisusu sé ya lolenge wana
  59. Oyo nde lingomba liye likokotaka nzela moko na bino, mpe bakoyambaka bango te. Kasi bakozika na moto
  60. Bakolobaka: Bokoyambama malamu te, bino nde bolengeleki yango тропа biso, esika kani ya bovandi ya mabe ya lolenge wana
  61. Bakolobaka: Nkolo wa biso, nani apeși biso oyo, bakisela ye etumbu na lifelo
  62. Mpe bakoloba: Mpona nini tozali kornona te mibali ba oyo tozalaki kotanga bango na molongo ya bato mabe
  63. Boye tosekaka bango to babungaka na miso na biso
  64. Ya soló, wana ekozala kosuana ya bato ya moto
  65. Loba: Ya sólo, nazali sé mokebisi. Mpe nzambe mosusu azali te na kobondela na bosóló sé Allah wa bomoko mpe ya bokasi koleka
  66. Nkolo wa likolo na mabele, mpe manso maye mazali okati na yango mibale, azali wa bokasi atonda bolimbisi
  67. Loba: (kurani) oyo ezali na sango ya monene
  68. Boye bino bozali koboya yango
  69. Nazalaki na boyebi te тропа ba anzelu, tango bazalaki koswana
  70. Ayebisaki ngai ete nazali sé mokebisi ya polele
  71. Tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu: Ya soló nalingi kokela moto na mabele
  72. Soki nabongisi ye mpe nafuli ye mopepe ya molimo na ngai, bokweyela ye na bogumbami
  73. Mpe ba anzelu banso bafukamelaki ye
  74. Longola sé ibilisa asalaki lolendo mpe azalaki okati ya bapengwi
  75. (Allah) alobi: Eh ibilisu! Eloko nini epekisi yo kogumbamela (moto) oyo nakeli ye na maboko na ngai? Boye osali lolendo to omimoni ete yo ozali likolo koleka
  76. Alobi: Nazali malamu mingi koleka ye, okelaki ngai na moto mpe okelaki ye na mabele
  77. (Allah) alobi: Віта awa, ozali ya kolakelama
  78. Mpe botutu bwa ngai, bokozalaka likolo lia yo kino o mokolo mwa suka
  79. Alobi: Nkolo, tikela ngai tango kino omokolo mwa bosekwisami
  80. (Allah) alobi: Ya soló, napesi yo tango
  81. Kino omokolo ngonga ekokokaka
  82. Alobi: Na nguya nayo (Allah), nakobungisaka bango banso
  83. Longola sé bawumbu nayo baye opona
  84. (Allah) alobi: Ya sólo, mpe oyo ezali bosolo nazali koloba
  85. Ya sólo, na kotondisa lifelo nayo, mpe baye banso bakolanda yo
  86. Loba: Nazali kosenga bino lifuta te, mpe nazali te oyo azali kokonza na makasi
  87. (Kurani) ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba
  88. Mpe kala te, bokoyebaka basango na yango