37.Those drawn up in Ranks
- Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo
- Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata)
- Na baye batangaka bokundoli
- Ya soló, Nzambe na bino azali moko
- Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele
- Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto
- Mpe ebatelami na mabe ya satana motomboki
- Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso
- Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela
- Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto
- Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka
- Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka
- Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)
- Mpe soki bamoni elembo, bakomi kosalela yango litio
- Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele
- Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu
- Na bankoko na biso ya kala
- Loba: Iyo, bino mpe lokola bokokitisama
- Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala
- Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)
- Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango
- Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango
- Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo
- Mpe botelemisa bango mpo bakoka kotunama
- Mpona nini bozali komisunga te
- Kasi lelo bakoluka kozala na botosi
- Mpe basusu bakobongola bilongi epai ya baninga mpe bakomi komitunana
- Bakolobaka: Ezali bino nde bobengaki biso na makasi. (na bopengwi)
- (Bakonzi) bakolobaka: Bino moko boboyaki kondima
- Tozalaki na bokoki epai na bino te, bino moko nde bozalaki bato ya mabe
- Liloba lia Nkolo wa biso lizali ya soló. Sólo tokomema. (etumbu)
- Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko
- Mokolo mona bakosanganaka (bango) banso na etumbu
- Lolenge wana nde tokosalaka na batomboki
- Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo
- Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma
- Kasi ayaki na bosóló, batindami balobaki bosembo
- Ya sólo penza, bokomeka etumbu ya makasi
- Mpe bokofutama sé kolandana na maye bozalaki kosala
- Longola sé bawumbu ya Allah ba oyo baponama
- Bango nde bakozalaka na bolamu oyo eyebani
- (Bakoliaka) mbuma mpe bakosepelisaka bango
- Okati na bilanga (lola) bilamu
- Likolo lia bambeto bizali ya kotalana
- Bakolekiselaka bango коро etondi na mayi ya miluka
- Ya pembe elengi тропа komela
- Ekosalaka bango mabe te, mpe ekolangwisaka te
- Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te
- Bazali lokola pembe ya likei oyo ebatelami
- Basusu bakobaluka kot ala baninga na kotunana
- Moko wa bango akolobaka: Ya soló, nazalaki na moninga
- Akoloba ete: Boye ozalaki okati ya bandimi
- Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka
- Akolobaka: Boye bolingi kotala na likolo
- Mpe akotalaka likolo mpe akomonaka ye na lifelo
- Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga
- Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu
- Ezali solo te ete tokokufa te
- Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te
- Ya soló, oyo nde elonga enene
- Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala
- Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe)
- Totiyaki yango ezala komekama тропа babubi
- Ezali nzete eye ebotaka o kati ya lifelo
- Mbuma na yango ezali lokola mitu ya basatana
- Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango
- Sima bakomela mayi ya tofina ya moto
- Sima lifelo nde esika ya bozongi na bango ya sólo
- Ya soló, bakutaki batata na bango na libungi
- Mpe balandaki sé nzele na bango
- Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga
- Tosilaki kotindela bango bakebisi
- Tala lolenge ezalaki тропа baye bakebisamaki
- Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama
- Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko
- Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene
- Mpe totiyaki ete libota lia ye bazala bakitani
- Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu
- Kimia ezala likolo ya Nûh kati na mokili mobimba
- Ya soló, lolenge wana nde tofutaka babongisi
- Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima
- Sima tobomaki basusu
- Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba
- Tango ayaki epai ya Nkolo waye na motema mosantu
- Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini
- Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah
- Bozali kokanisa nini тропа Nkolo wa molongo
- Sima atalaki minzoto na bokebi
- Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali
- Bapesi ye mokongo bakei
- Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te
- Boye bozali koloba te тропа nini
- Akei kobeta bango mbata na loboko ya mobali
- Sima bato bayaki epai naye na lombango
- Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko
- Kasi Allah nde akela bino na maye bozali kosala
- Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati
- Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango
- Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai
- Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu
- Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail)
- Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema
- Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye
- Mpe tobelelaki ye ete: Oh Ibrâhîm
- Osili kokokisa (elaka) ya ndoto, lolenge wana nde tofutaka babongisi
- Ya soló, wana ezalaki momekano mwa polele
- Mpe topesaki ye ebwele ya kitoko тропа kosasa
- Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu
- Kimia ezala likolo ya Ibrâhîm
- Lolenge wana nde tofutaka babongisi
- Ya soló, ye azalaki okati ya bawumbu na biso bandimi
- Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu
- Mpe topambolaki ye na Is’háq, na libota lia bango mibale oyo ezalaki na (bato ya malamu) mpe oyo akomibuba etali sé ye moko
- Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso
- Mpe tobikisaki bango mibale elongo na bato na bango na etumbu ya monene
- Mpe tolongisaki bango, mpe bango nde bazalaki balongi
- Mpe topesaki bango buku ya polele
- Mpe tokambaki bango mibale na nzela ya semba
- Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu
- Kimia ezala likolo ya Mûssa na Háruna
- Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi
- Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi
- Мре ya sólo IL’YÁS azalaki moko okati ya batindami
- Tango alobaki na bato naye: Boye bokobanga te
- Boye bozali kokumisa ba’alan (nkombo ya ekeko), mpe botiki mokeli malamu
- Allah nde Nkolo wa bino, mpe Nkolo ya bankoko ya bino ya kala
- Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu
- Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama
- Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu
- Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye
- Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi
- Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi
- Mpe ya sólo, Loth azalaki okati ya batindami
- Tango tolongisaki ye na libota lia ye mobimba
- Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali
- Sima tobebisaki basusu
- Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo)
- Mpe kati na butu, boye bozali kokanisa te
- Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami
- Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)
- Mpe aponamaki été abwakama
- Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te
- Soki azalaki te moko o kati ya bakumisi Allah
- Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa
- Tobimisaki ye na mabele bolumbu mpe na nsoni
- Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki)
- Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka
- Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke
- Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali
- То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona
- Ya soló, bazali koloba sé na lokuta na bango
- (Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta
- Boye akopona bana basi koleka bana mibali
- Mpona nini bozali kokata likambo na lolenge wana
- Boye bozali kokanisa te
- То bozali na bilembetele bisusu bia polele
- Boya na buku na bino, soki bozali koloba bosôló
- Mpe bati bondeko kati naye na bilima, kasi bilima bayebi ete bazali (bapengwi) mpe ete bakomemama (na etumbu)
- Nkembo na Allah wa likolo, mpona maye bazali koloba
- Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama
- Ya soló, bino na baye bozali kobondela
- Bozali na nguya ya kobungisa moto moko te
- Longola sé oyo akozikisama na moto
- Moko te okati na biso, sé azali na esika eyebani
- Mpe ya soló, tozali komitelemisa na milongo
- Mpe ya soló, biso nde tozali kopesa lokumu (ya Allah)
- Ata soki bazalaki koloba
- Soki tokanisaka bato ya kala
- Tolingaki kozala bawumbu ya Allah baye baponama
- Bapengwaki na yango, kasi bakomonaka
- Na yango, tosilaka kopesa liloba lia biso epai ya bawumbu na biso batindami
- Ya sólo, ezali bango nde bakosalisama
- Mpe ya soló, basoda na biso nde bakolonga
- Mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye
- Мре tala bango, mosika te bakomona
- Nini boye bazali kowelisa etumbu na biso
- Tango bakokweyaka na bisika bia bango, tango wana ekozala mabe тропа bango oyo basilaki kokebisama
- Mpe mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye
- Mpe tala, kala mingi te bakomonaka
- Nkembo ya Nkolo wayo, Nkolo ya nguya тропа maye bazali koloba
- Kimia ezala likolo lia batindami
- Mpe lokumu ya Allah, Nkolo wa molongo mobimba