36.Yaseen

  1. Yâ, Sín
  2. Na kurani oyo etonda bwanya
  3. Ya soló, ozali (Muhammad) kati ya batindami
  4. O kati ya nzela ya semba
  5. Ekitisamaki kowuta na oyo azali na bokasi atonda ngolu
  6. Mpo ete okebisa bato oyo bankonko na bango bakebisamaki te, kasi bazalaki kokanisa te
  7. Liloba lisilaki кокота likolo na bango ya sólo, kasi ebele bazali kondima te
  8. Ya solo, tokotiela bango basinga na bakingo mpe na minoko na bango, тре bakotambola na yango sé bongo
  9. Mpe tokangaki liboso na bango mpe sima na bango, mpe tozipaki bango (miso) ete bamona te
  10. Mpe ezali sé ndenge moko, okebisa bango to okebisa te, bakondima te
  11. Ya soló, esengeli okebisa sé oyo azali kolanda maloba (kurani), mpe azali kobanga Ar-Rahmán na kobombama, pesa ye sango ya bolimbisami mpe lifuta lilamu
  12. Ya soló, biso nde tokosekwisaka bawei, mpe tokomeli bango maye basalaki ya malamu to ya mabe, mpe na mikoloto na bango mpe eloko nyoso topesi motango na yango okati ya buku ya polele
  13. Pesa bango ndakisa ya bato ya mboka tango batindami bayelaki bango
  14. Tango totindelaki bango batindami mibale, baboyaki kondimela bango, tobakiseli bango ya misato, balobi: Ya sólo, totindami epai na bino
  15. Bayanolaki: Bozali bato lokola biso, Ar-Rahmán akitisi eloko тропа biso te, bino bozali sé kokosa
  16. Balobi: Nkolo wa biso ayebi ya sólo ete: Tozali batindami epai na bino
  17. Mpe tozali sé тропа bokomisi sango bwa polele
  18. Balobi: Tozali kornona bino na makanisi mabe, soki botiki yango te, tokobwakela bino mabanga, mpe etumbu makasi kowuta epai na biso ekozua bino
  19. Balobi: Makanisi mabe ezali epai na bino moko, boye nde lolenge bozali kosala soki bopesami makundolami? Kasi bozali bato mabe balekisi ndelo
  20. Mpe moto moko ayaki na suka ya mboka na lombango (na ebandeli ya mboka) mpe alobi: Oh bato na ngai! Bolanda batindami
  21. Bolanda baye bakotuna bino lifuta ata moko te, mpe bazali na liloba lia bokambami
  22. Mpe тропа nini te nabondela ye oyo akeli ngai, mpe epai naye nde bokozongisama
  23. Boye nazuela ye banzambe basusu? Soki Ar-Rahmân alingeli ngai mabe, kosenga na bango ekosalisa ngai na eloko moko te, mpe bakobikisa ngai te
  24. Ya soló, nakozala na libungi lia polele
  25. Ya solo, ngai nandimi na Nkolo wa bino, boyoka ngai
  26. (Na yango), elobamaki naye: Kota na lola. Alobi: Soki bato na ngai bayebaka
  27. Mpo ete Nkolo na ngai alimbisi ngai mpe atie ngai o molongo ya bato ya lokumu
  28. Мре sima naye tokitisaki mapinga ata moko te, mpe tolingaki kokitisa eloko moko te likolo ya bato naye
  29. Ezalaki sé bogangi moko (mongongo ewutaki na likolo) mpe etumbu ezuaki bango
  30. Eh mabe ezali likolo ya bawumbu! Motindami atikala koyela bango te sé batióla ye
  31. Bazali kornona te bato boni toboma liboso na bango, mpe bazongelaki bango te
  32. Mpe (moto) nyoso, akotelema liboso na biso (тропа kosamba)
  33. Mpe elembo moko тропа bango ezali ete topesaka bomoyi na mabele maye makawuka, mpe tobimisaki kowuta na yango mbuma iye bazali kólia
  34. Mpe totiaki okati na yango (mabele) bilanga ya naghil mpe a’náb mpe tobimiselaki yango maziba ya mayi
  35. Mpo ete balia bambuma na yango, mpe na oyo maboko na bango masali. Boye bakozala na botondi te
  36. Nkembo naye oyo akeli biloko na balolenge binso biye bibimaka na mabele, mpe na banzoto na bango mpe na maye bayebi te
  37. Mpe elembo mosusu тропа bango ezali butu, oyo tolandisi yango mokolo, kasi bango bafandi o kati ya molili
  38. Mpe moyi mozali kotambola na botiami na yango. Wana ezali etiyeli ya oyo azali na bokasi atonda boyebi
  39. Mpe sanza, totiaki yango na bitape kino ekokonda ekomi lokola lokasa ya mbila ya ко kawuka
  40. Moyi mokutaka sanza te, mpe butu elekaka mokolo te. Mpe nyoso ezali kotambola na nzela na yango
  41. Mpe elembo mosusu тропа bango, ezali ete tomemaka bato na bango na masuwa oyo etondaka
  42. Mpe tosaleli bango mosusu lokola oyo wana bazali komata na kati тропа kotambola
  43. Мре soki tolingaki nde tozindisaki bango, nde bazuaki mosungi te, mpe balingaki kozua libiki te
  44. Ezali sé тропа mawa na biso, тре mpo bakoka kosepela na mwa tango токе
  45. Мре soki bayebisi bango ete, bobanga oyo ezali liboso na bino mpe sima na bino mpo ete bozua ngolu
  46. Mpe elembo moko te kati ya bilembo ya Nkolo na bango eyelaki bango bobele bapesa yango mokongo
  47. Mpe soki bayebisi bango ete: Bobimisa na bozui oyo Allah apeși bino тропа kokaba, bapagano bakoloba na bandimi ete: Tokoleisa moto oyo soki Allah alingi akoleisa ye? Bino bozali sé na libunga ya polele
  48. Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali koloba bosóló
  49. Bakoyoka sé lolaka moko ekozuaka bango na mbalakaka tango bazali kosuana
  50. Bakokoka (tango wana) kotikela libota na bango malako te mpe bakokoka lisusu kozongela bango te
  51. Мре bakofula kelelo, тре okomonaka bango babimi na malita bazali kokima mbangu epai ya Nkolo wa bango
  52. Bazali koloba: Eh mawa na biso! Nani asekwisi biso na esika oyo tozalaki kolala? Boye oyo nde elaka ya Ar-Rahmán alakaki, mpe batindami balobaki bosóló
  53. Ekozalaka sé lolaka moko ya (makasi) okomona bango banso bazali liboso lia biso
  54. Mokolo wana, bakobuba ata molimo moko te, mpe bokofutamaka te sé na maye bozalaki kosala
  55. Ya soló, mokolo wana bato ya lola bakozalaka na misala ya bokokisi bolamu bwa bango
  56. Bango na balongani na bango bakozalaka na bisika bia тріо, bavandi likolo lia bakiti
  57. Bakozalaka na bambuma (ya kolia) mpe bakozuaka nyoso oyo bakosengaka
  58. (Salam) kimia, liloba likowutaka epai ya Nkolo oyo atonda mawa
  59. Kasi lelo, tika ete bozala mosika, eh bino bato mabe
  60. Boye nalakaki bino te eh! Bana ya Adam! Ete bobondela satana te? Ya soló, azali monguna na bino ya polele
  61. Mpe (nayebisaki bino te ete) bobondela ngai? Oyo nde nzela ya semba
  62. Mpe (satana) asilaki kobungisa ebele o kati na bino, boye bozali kokanisa te
  63. Oyo nde lifelo oyo balakaki bino
  64. Lelo bokozikisama na yango, тропа maye bopengwaki na yango
  65. Mokolo mona tokokanga minoko mia bango, kasi maboko na bango makolobela biso, mpe makolo na bango makozala nzeneneke ya maye bazalaki kosala
  66. Mpe soki tolingi, tokolimwisaka miso na bango, mpe bakokimaka na nzela, kasi bakomonaka ndenge nini
  67. Mpe soki tolingi, tokobalusa bango sé esika moko, bakokoka kokende liboso te, mpe kozonga sima te
  68. Na oyo tokopesaka ye bomoyi molayi, tokozongisa ye na lolenge ya bokelami naye (motawu na nzoto mpe na bongo naye). Boye bazali koyeba te
  69. Ezali ntôki ya mpamba mpamba te nde totangisaki ye (Muhammad), mpe esengeli naye te. Kaši ezali nde bokundoli, mpe kotanga kurani oyo ezali polele
  70. Mpo akebisa oyo akozala na bomoyi, mpe liloba lisila kokokisama тропа bapengwi
  71. Boye bazali kornona te ete kati ya maye maboko na biso masali, tokeli An‘âm biye bazali kokonza
  72. Mpe tondimelaki bango bamatelaka misusu mpe misusu baliaka
  73. Mpe bazali kobimisa kati na yango (biloko) oyo ezali kosalisa bango, mpe misusu ya komela kasi bazali kotondo te
  74. Mpe bazali kozua banzambe misusu batiki Allah, bazali kokanisa ete bakosalisa bango
  75. В aye wana bakokokaka kosalisa bango te, kasi bakokoma nde lipinga liye likotelemela bango
  76. Maloba na bango mapesa yo mpasi te. Ya soló, biso toyebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa
  77. Boye moto ayebi te ete tokeli ye kowuta na mayi ya mokongo, na sima abaluki akomi monguna ya polele
  78. Azali kobetela biso ndakisa kasi abosani bokelami bwa ye moko, alobi: Nani akopesa bomoyi na mikuwa sima ya kokoma na yango putulu
  79. Loba: Oyó akopesa yango bomoyi nde oyo akelaka yango o mbala ya liboso, mpe ayebi malamu bokeli bwaye bonso
  80. Ye nde azalisaki тропа bino moto kowuta na nzete ya mobesu, yango nde bozali kopelisa
  81. Boye oyo akeli mapata na mabele akoki te kokela basusu lokola bango? Iyo, ya soló azali mokeli monene koleka bango mpe azali moyebi
  82. Ya sólo soki alingi (kosala) eloko akolobaka se, zala, mpe ezalisami
  83. Nkembo na oyo azali na bokonzi bonso, na maboko naye, mpe epai naye nde bokozongisama