34.Sheba

  1. M atondo na Allah oyo maye manso ya likolo mpe ya nsé ezali ya ye, mpe azali na matondo o tango ya suka. Мре azali na bwanya atonda boyebi
  2. Ayebi maye mazali kokota na mabele na maye mazali kobima o kati na yango, mpe maye mazali kokita kowuta na likolo mpe na maye mazali komata. Azali wa ngolu atonda bolimbisi
  3. Mpe bapengwi balobi: Ngonga ekoyelaka biso te, loba: Na Nkolo wa ngai, ya soló penza ekoyelaka bino, ye nde moyebi ya oyo ebombami. Eloko nionso ata ya mokie lokola mbuma ya zelo na likolo mpe na mabele, mpe ezali na eloko moko te ya mokie nto mpe ya monene sé kaka ekomama na buku ya polele
  4. Mpo ete apesa lifuta na baye bandimaki mpe baye basalaki malamu, bango nde bakolimbisama, mpe bakozua bozui bolamu
  5. Мре тропа baye bazali koluka kobebisa mikapo mia biso, bango nde bakozua etumbu ya makasi
  6. Nzoka nde baye bazali na boyebi, bazali kornona oyo ekiteli yo kowuta epai na Nkolo nayo ete ezali bosembo mpe ezali kokamba o nzela ya oyo azali na nguya atonda lokumu
  7. Mpe bapengwi bazali koloba ete: Boye bolingi tolakisa bino moto oyo akoyebisa bino tango bosili kobebisama, ete bozonga lisusu bikelamu ya sika
  8. Boye azali kobukela Allah lokuta? To azali na ligboma? Kasi baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, bakozalaka o kati ya etumbu mpe libunga ya mosika
  9. Boye bazali kornona te maye mazali liboso na bango mpe sima na bango? Okati ya likolo na mabele, soki tolingi, tokozindisa bango na mabele. To tokweisela bango ndambu ya mapata, ya soló, wana ezali elembo тропа mowumbu nyoso oyo azali motubeli
  10. Mpe ya sólo, tosilaki kopesa Dáwud bolamu ete: Eh bangomba na bandeke! Bosanjola elongo naye, mpe tolembiselaki ye ebende
  11. (Mpe) toyebisaki ye ete: Bosala na yango nguba ya komibatela na tango ya bitumba mpe bosala misala ya malamu. Mpamba te ya soló, nazali kornona maye bozali kosala
  12. Mpe тропа Suleyman, (totiyelaki ye) mopepe, ezali kotambola na tongo lokola oyo etamboli sanza moko, mpe na pokwa lolenge moko, mpe totioliselaki ye moluka mwa wolo. Mpe bilima bisusu bizalaki kosala na mibeko mia ye na ndingisa ya Allah, mpe oyo akotika kosalela mobeko mwa biso, tokomekisa ye etumbu ya moto ya sairi
  13. Bazalaki kosalela ye oyo alingaki kosala, tèmpelo bikeko na mbambola lokola sani ya minene, na banzungu ya langi. Oh bato ya Dâwud! Botonda botondi. Kasi токе mpenza kati na bawumbu ba ngai nde bayebi kozongisa matondi
  14. Mpe tango tozua mokano тропа liwa naye, moko ayebaki yango te, sé bobele banyama ya mabele nde emonisaki bato liwa naye na kolia lingenda naye, mpe tango akweyaki, bilima bakamwaki na koloba ete: Soki bayebaki mabombami nde banyokwamaki te na bowumbu ya mosala naye
  15. Ya soló, pona saba ezuamaki na nzela ya efandelo na bango, na bilanga mibale, moko na ngambu ya (loboko) ya mobali, mosusu na ngambu ya (loboko) ya mwasi, bolia bozui boye Nkolo wa bino apesi bino, mpe botonda ye botondi. Mboka elamu mpe Nkolo ya bolimbisi
  16. Kasi baboyaki, mpe totindelaki bango etumbu ya bozindisami bwa mbula (mpela), mpe tobongolaki bilanga bia bango mibale wana bikomaki kobimisa banzete ya bololo, mpe mua banzete ya Sidr
  17. Wana nde ezalaki lifuta тропа maye bapengwaki na yango, boye tokopesa etumbu epai mosusu bobele na mopagano
  18. Mpe totiaki kati kati na bango na bamboka oyo topambolaki, bamboka misusu ezali na banzela ya polele ya pene тропа kosala mobembo kati na yango. В osala mobembo butu na moyi na kimia
  19. Mpe balobaki ete: Nkolo sembola kati kati na biso ezala mosika, kasi bamisalaki mabe bango moko, mpe totia bango bazala masapo, mpe tobebisaki bango mpeza. Wana ezali bilembo тропа moto nyoso azali koyika mpiko mpe azali na botondi
  20. Mpe ya soló, ibilisu asili kokomisela bango makanisi naye, mpe balandi ye, longola sé eteni шоке kati ya bandimi
  21. Mpe azalaki na bokonzi likolo na bango te, kasi ezalaki mpo toyeba kati na bango nani andimi mpenza na mokolo ya suka, mpe koyeba nani azali na tembe na yango. Mpe Nkolo nayo nde mobateli ya biloko binso
  22. Loba: Bobenga baye bozalaki kotutela ntolo na botiki Allah, bazali ata na eloko moke te lokola mbuma ya zelo na nsé mpe, na likolo basanganaki mpe naye te тропа kokela yango mibale, mpe azuaka ata lisungi na bango te
  23. Mpe akondimelaka moto te sé oyo akopesa ye ndingisa, kino bobangi bokokita kowuta na mitema mia bango mpe bakolobaka: Boye Nkolo wa bino alobi nini? Bakoyanolaka bango ete alobi: Bosôló, mpe ye nde azali monene mpe ľíkolo koleka
  24. Loba: Nani aleisaka bino ezala na likolo mpe na nsé? Loba: Allah. Ya solo, ezala biso to bino tokoyeba ba nani bazali na nzela ya semba to ya libungi ya polele
  25. Loba; bokotunama te na mabe oyo tosali, mpe tokotunama te na misala na bino
  26. Loba: Nkolo wa biso akosangisaka biso mpe sima akosambisa kati kati na biso na bosôló, ye nde mosambisi monene koleka mpe moyebi manso
  27. Loba: Bolakisa ngai baye bozui bango basangani naye?, te; kasi ye azali Allah oyo azali na nguya atonda bwanya
  28. Mpe totindaki yo sé тропа bopesi sango ya malamu mpe тропа kokebisa molongo mobimba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te
  29. Mpe bazali koloba: Elaka yango ekozalaka tango nini soki bozali koloba bosôló
  30. Loba: Elaka na bino ekozala o mokolo oyo bokokoka kozongisa ngonga na yango sima te, mpe liboso te
  31. Mpe bapengwi bazali koloba ete: Tokondima na kurani oyo te tokondima mpe te na maye makitaki liboso na yango. Mpe soki omonaki bato mabe tango bakotelema liboso lia Nkolo wa bango, bazali kowelana na maloba, baye bazangaki makasi bakoloba na baye ya lolendo ete: Soki тропа bino te nde tokomaki bandimi
  32. Bato ya lolendo bakozongisa eyano epai na bango ete: Boye biso nde topekisaki bino bokambami tango esilaki kokomela bino? Te, bino nde bozalaki bato mabe batomboki
  33. Bato ya motawu baye bazangi makasi bakozongisa liloba na bato ya lolendo ete; ezalaki nde likita na bino ya mabe bozalaki kosala yango butu na moyi, bozali kotinda biso ete topengwa na Allah, mpe totiela ye bambanda. Mpe babandi kolela na bango tango bakomona etumbu, tokotia miniololo na bakingo ya bapengwi, boye bakofutama te sé lolenge basalaki
  34. Mpe totindaki mokebisi te na mboka sé bato ya bozwi nayango baloba: Tokondimela oyo botindami na yango te
  35. Mpe bazali koloba ete: Ya solo, tozali na bana mpe na bozui ebele, na yango tokoki kozua etumbu te
  36. Loba: Ya sólo, Nkolo wa ngai apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko, kasi ebele ya bato bazali koyeba te
  37. Misolo mia bino na bana na bino ekopusa bino te pene na biso, longola sé oyo akondima mpe asali misala milamu, bango nde bakozuaka lifuta ya kobakisama тропа maye basalaki, mpe bakozalaka na bisika ya likolo mpe lola ya kimiya (nyoso)
  38. Kasi тропа ba oyo bazali koluka kobebisa mikapo mia biso, bakomemama liboso ya etumbu
  39. Loba: Ya soló, Nkolo wa ngai apesaka bozui na oyo alingi kati ya bawumbu naye, mpe akutolaka yango. Mpe nyoso oyo bozali kobimisa azali kozongisela bino yango, mpe azali malamu ya bapesi
  40. Mpe mokolo oyo akosangisa bango banso, sima akolobaka na ba anzelu: Boye bino nde ba oyo bazalaki kobondela
  41. Bakoloba ete: Lokumu nayo, yo nde mokonzi na biso kasi bango te, nzoka nde bazalaki kobondela nde bilima, mpe ebele bandimelaki bango
  42. O mokolo yango, bokozala na makoki te ya kosalisana, mpe kominyokola te, mpe tokoloba na bato mabe ete: Вотека etumbu ya moto oyo bozalaki kozua yango lokuta
  43. Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, bakoloba ete: Nini oyo moto oyo alingi nde apekisa bino maye batata na bino bazalaki kobondela? Mpe balobi lisusu ete: Oyo ezali sé lokuta oyo ebongisami, mpe bapagano balobi тропа bosembo tango ekomelaki bango ete: Oyo ezali sé bonganga ya polele
  44. (Mpe) topesaki bango buku moko te mpo batanga yango, mpe totindelaki bango mokebisi moko te liboso nayo
  45. Ndenge moko mpe na ba oyo bazalaki liboso na bango baboyaki kondimela (Batindami na bango) bakomisaki zomi te na oyo topesaki bango, baboyaki kondimela batindami ba ngai, mpe lolenge kani nasalaki тропа bango
  46. Loba: Nazali kolendisa bino na eloko moko ete: Mpona Allah, botelema mibale mibale to moko moko, mpe sima bososola. Ndeko na bino azali na bazabulu te, (Muhammad) kasi azali mokebisi mpona bino, mpona etumbu ya makasi
  47. Loba oyo nazali kosenga bino ezali mpona bino moko, kasi lifuta lia ngai, likofutamaka sé epai ya Allah, тре azali kornona nyoso
  48. Loba: Ya soló, Nkolo wa ngai atiyaka bosôló (epai ya batindami), ayebi malamu maye mabombami
  49. Loba: Bosôló bosili koya, mpe lokuta bozala te, mpe ekozonga lisusu te
  50. Loba: Soki nabungi, namibungisi ngai moko, mpe soki nakambami ezali тропа oyo ekiteli ngai kowuta epai na Nkolo wa ngai. Ya sólo, ye azali moyoki mpe azali pene
  51. Mpe soki omoni bango tango bakokweya na bobangi, bakokoka kokima te, kasi bakokangama pembeni
  52. Mpe bakoloba ete: Tondimi naye, kasi ndenge nini bakozela bondimi na mosika
  53. Basilaki kopengwa na yango banda kala, mpe bazali kolendisa na mosika maye bazali na boyebi te
  54. Mpe bakopekisama ete: Bazua eloko bazalaki na mposa na yango, lolenge ya boye esilaki mpe kosalama na baninga na bango ya liboso mpo ete balutaki tembe. (Bazalaki na tembe ya mozindo mpe monene)