Bokiti ya buku ezali na tembe te, ewuti epai ya Nkolo wa molongo
То mpe bakoloba ete ye nde (Muhammad) asali yango na ndenge naye?, kasi yango ezali bosôló kowuta epai ya Nkolo wa yo, mpo ete okebisa na yango bato oyo mokebisi moko te ayela bango liboso nayo, mpo ete bakambama
Allah nde akela likolo na mabele, mpe maye manso mazali kati na yango mibale na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende. Na botiki ye, bozali na mobateli mpe molobeli te. Boye bozali kokanisa te
Azali kokamba kowuta na likolo makambo ya likolo na ya nsé, sima makambo yango mazali komata epai naye na mokolo moko oyo ezali lokola mbula nkoto moko epai na bino lolenge botangaka
Ye nde ayebi mabombami na makambo ya polele, azali na nguya atonda ngolu
Ye nde abongisa bokelami ya biloko binso, mpe abandaki kokela moto na mabele ya potopoto
Sima abimisi bakitani naye kowuta na litanga ya mayi ya motawu ya mokongo
Apesi ye lolenge naye ya kitoko mpe afuli ye kowuta na molimo naye atieli bino boyoki, bomoni mpe mitema. Kasi moke bozali na botondi
Mpe bazali koloba ete: Soki tosili kolimwa na nsé na mabele, boye tokozonga lisusu bikelamu ya sika? Kasi bazali kopengwa nde na bokutani ya Nkolo na bango
Loba: Anzelu ya liwa oyo atiyami тропа bino, akoboma bino, sima bokozongisama epai ya Nkolo wa bino
Mpe soki omoni lolenge batomboki (bakokitisaka) mitu mia bango liboso lia Nkolo wa bango, (na bolobi): Nkolo wa biso; tomonaki mpe toyokaki, zongisa biso (ata токе) mpo tosala bolamu. Ya soló (Sika oyo) nde tozali na tembe te
Mpe soki tolingaki nde topesaki molimo nyoso bokambami bwaye, kasi ezali тропа liloba esilaki kolobama ete; ya solo, nakotondisa lifelo na bato тре bilima elongo
Вотека oyo bobosanaki тропа mokolo na bino ya lelo, ya soló biso тре lokola totiki bino, bomeka etumbu ya libela тропа maye bozalaki kosala
Ya soló, baye bandimaka na mikapo mia biso nde baye bazalaka soki bakundoleli bango yango, bakiti na bogumbami mpe bakumisi lokumu ya Nkolo wa bango, mpe bakosalaka lolendo te
Bazali kolamuka kowuta na bambeto na bango mpe bakitisi bilongi bia bango тропа kokumisa Nkolo wa bango na bobangi mpe elikia bonso, mpe bazali kobimisa ndambo ya maye topesaki bango
Ata moto moko te ayebi maye babombeli bango тропа bosepelisi miso, lifuta na maye basalaka
Boye mondimi na mobebisi bazali ndenge moko? Te. Bakokani te
Kasi baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, bakozalaka na lola, libela mpe bakofutaka bango тропа maye basalaki
Kasi тропа baye babebisaki, bakozalaka na moto, mpe tango nyoso bakolingaka kobima, bakozongisaka bango na kati, mpe bakoyebisaka bango ete: Вотека etumbu ya moto moye bozalaki kondima te
Mpe ya soló, tokomekisa bango etumbu ya moke awa na mokili, yambo ya etumbu ya monene mpo tango mosusu bakozonga. (o nzela ya semba)
Mpe nani azali mabe penza koleka moto oyo soki mikapo mia Nkolo wa ye mizali kotangema sima apesi yango mokongo? Ya solo, tokozua batomboki (lolenge bazalaki kosala)
Mpe topesaki Mûssa buku, mpe kozala na tembe te тропа bokutani na ye, mpe totiyaki ye azala mokambi ya bana ya isalayele
Mpe totiyaki bakambi kati na bango, ete bakamba na mitindo mia biso, mpo ete bakangaki mitema mpe bandimaki na mikapo mia biso
Ya soló, Nkolo wayo nde akokataka o kati kati na bango o mokolo mwa suka na maye bazalaki na bokabwani
Boye bamoni te ete tobomaki ebele ya bato baleka liboso bazali kotambola na bandako na bango? Ya soló wana ezali bilembo. Boye тропа nini bayokaka te
Boye bazali koyeba te, tozali kotindika mayi na mabele oyo ekauka, mpe tobimisi na yango milona miye bazali kolia yango bango moko na bibwele na bango? Boye bazali kornona te