27.The Ant

  1. Twâ sîn, oyo ezali mikapo mia kurani, mpe buku wa polele
  2. (Ezali) na bokambami mpe kopesa sango elamu epai ya bandimi
  3. Baye bazali kotelemisa losambo mpe kobimisa zakat, mpe bazali na tembe te na mokolo mwa suka
  4. Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, totieli misala na bango ya mabe bonzenga, mpe batikali na yango na koyimayima mpe kozanga bososoli
  5. Bango wana nde bakozala na etumbu ya mabe, mpe o mokolo ya suka bakozala bazangi mpenza
  6. Mpe ya solo, ozali koyamba kurani oyo kowuta epai ya oyo azali na bwanya atonda mayele
  7. (Kanisa) tango Mûssa alobaki na libota lia ye: Ya solo, ngai namoni moto, nakoyela bino sango okati na yango to nakoyela bino koni ya moto mpo été bomiyotola
  8. Mpe tango akomaki ayoki mongongo ebengi été: Apambolami moto oyo atelemi o kati ya moto, ndenge moko mpe baye bazali zinga zinga na yango. Nkembo na Allah Nkolo ya mokili. (atonda bokasi mpe bwanya)
  9. Eh Mûssa! Ezali ya soló, ngai Allah oyo nazali na nguya na ntonda bwanya
  10. Mpe bwaka lingenda nayo, mpe tango amoni yango ekomi kongoluma lokola nyoka, apesi mokongo abaluki, eh Mûssa! Kobanga te epai na ngai batindami babangaka te
  11. Longola sé oyo asali mbeba mpe sima abongisi yango. Ya solo, nazali molimbisi na tonda mawa
  12. Mpe kotisa loboko nayo na libenga nayo, ekobima pembe ekosala mpasi te, ezali moko ya bikamwiseli libua ökende na yango epai ya falo na bato naye, mpo bazali ya sólo bato ya mabe mpenza
  13. Mpe tango bilembo bia biso bikomelaki bango polele polele, balobi ete: Oyo ezali bonganga ya polele
  14. Bawanganaki yango na motema mabe mpe na lolendo nzoka nde namitema na bango bazalaki na tembe te, kasi tala ndenge nini bato mabe basukaki
  15. Mpe tosilaki kopesa Dâwud na Suleyman boyebi, mpe bango mibale balobaki: Matondo na Allah oyo apesi biso ebele o kati ya bawumbu naye bandimi
  16. Mpe Suleyman akitanaki Dâwud, mpe alobaki: Eh bino bato! Totangisama monoko ya bandeke, mpe topesama biloko binso. Ya soló, oyo ezali bolamu ya polele
  17. Mpe basangiseli Suleyman mapinga ya basoda naye ya badjini (bilima) na bato, mpe bandeke, batandanaki milongo milongo
  18. Kino bakomaki na bisika ya basombe bazali, sombe moko alobaki ete: Oh bino basombe! Bokota na bandako na bino noki te Suleyman na mapinga naye bakonyata bino mpe bakoyeba te
  19. Mpe (Suleyman) akatani na koseka tango ayokaki liloba ya sombe wana mpe asepeli na makambo na bango oyo basali mpe alobi: Oh Nkolo! Tika natondo yo botondi тропа bolamu nayo likolo na ngai na baboti na ngai mpe tika ete nasala mosala oyo ekosepelisa yo, mpe na ngolu nayo, kotisa ngai na mawa nayo okati ya lisanga ya bawumbu nayo ya malamu
  20. Mpe atalaki milongo ya bandeke alobi: Nazali kornona hud-hud te azali wapi? To azali elongo na baye bazalaki te
  21. Nakopesa ye etumbu ya makasi mpenza to nakokata ye kingo, to ayela ngai eloko oyo ekoki kolongisa ye
  22. Kaši awumelaki tango molayi te na kozonga, mpe alobaki na mokonzi ete: Nazui boyebi oyo ozali na yango te, mpe nayeli yo sango ya sôló, kowuta na mboka sabat
  23. Nakuti mwasi moko azali kokonza bango, mpe makambo mazali kokambama naye, mpe azali na kiti ya bokonzi ya kitoko monene koleka
  24. Nakuti ye na bato naye bazali kogumbamela moyi, na botiki Allah, mpe satana abongiseli bango misala, mpe abungisi bango nzela ya semba, mpe bakokambama te
  25. Boye bakofukamela Allah te oyo abimisaka maye mabombami kati ya mapata na mabele, mpe ayebi maye bozali kobomba mpe maye bozali komonisa
  26. Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te kaka sé ye Nkolo ya ngwende ya bonene (ya bokonzi)
  27. (Suleyman) Alobi: Tokotala soki olobi bosôló to ozali kokosa
  28. Kende kotikela bango mokanda mwa ngai moye, sima tika bango mpe otelema pembeni mpe tala lolenge nini bakoyanola
  29. Mokonzi ya mwasi alobi: Eh bankumu! Babwakeli ngai mokanda ya lokumu
  30. Ya soló, ewuti epai ya Suleyman. Mpe ya sólo yango ebandi na nkombo ya Allah wa boboto atonda ngolu
  31. Ete bosalela ngai lolendo te, mpe boya epai na ngai nakomisokia (kozala bamizilima)
  32. Alobi: Eh bankumu! Bopesa ngai toli тропа likambo liye, nakosala eloko te kino bokozala awa. (тропа toii)
  33. Balobi: Tozali na bokasi mpe nguya ya kosakana te, liloba ya suka ezali epai nayo, tinda biso na oyo omoni
  34. Alobi: Ya soló, bakonzi soki bakoti na mboka babebisaka yango, na koboma mpe kosala mabe ebele, mpe bakomisaka bankumu na yango bato mpamba. Mpe lolenge wana nde basalaka
  35. Mpe na yango ya sólo, ngai nazali kotindela bango likabo sikoyo, mpe na kotala eyano nini ekoyela ngai
  36. Mpe tango (bantoma to basali naye) bakomaki epai ya Suleyman na (libonza) alobi: Boye bolingi kosomba ngai na misolo? Kasi oyo Allah asilaki kopesa ngai ezali ebele mpe eleki likabo na bino oyo bozali kosepela na yango
  37. Zonga epai na bango, kasi tokoyela bango na basoda ya makasi baye bakotelema liboso na bango te mpe tokobimisa bango. Na yango mpe bakozanga lokumu mpe bakokitisama
  38. Alobaki ete: (Suleyman) oh bankumu na ngai! Nani akoyela ngai ngwende naye awa yambo ete baya epai nanga!’ na botosi bonso
  39. If’rît alobaki ete: Ngai nakoyela yo yango yambo ete otelema na esika nayo. Mpe ya soló ngai nazali тропа yango makasi mpe bosembo
  40. (moto) moko azalaki na boyebi ya buku alobaki ete: Ngai nakoyela yo yango yambo ete obuka miso nayo. Mpe tango amonaki yango etelemi liboso naye, alobaki ete: (Suleyman) oyo ezali bolamu ya Nkolo na ngai, ameki ngai na yango soki nakotondo ye to nakozanga ye botondi, kasi oyo akotondo ayeba ete ezali тропа bolamu naye moko, mpe oyo akoboya kotondo, ya solo, Nkolo na ngai atonda bomengo azali malamu
  41. Alobi (lisusu): Bozongisela ye kiti naye, totala soki akokambama, to akozala o kati ya ba’oyo bakambami te
  42. Tango ayakaki balobaki naye ete (mokonzi mwasi wana): Boye oyo ngwende nayo te? Azongisaki ete ezali lokola yango! (Alobi Suleyman): Tozuaki boyebi liboso naye mpe tomisokie (tokomi bamizilima)
  43. Kasi oyo azalaki kobondela na botiki Allah, nde epekisaki ye kasi azalaki soló o kati ya bapengwi
  44. Мре balobaki naye: Kota na ndako, mpe tango amonaki yango lokola mayi ya mozindo, amonaki makolo naye ebimi na elilingi, (Suleyman) alobi naye: Oyo ezali ndako esalami na milangi ya talo,: (Mwasi mokonzi!) alobaki ete: Nkolo, ya solo namibubaki ngai moko, na yango namisoki elongo na Suleyman epai ya Allah Nkolo ya mokili mobimba
  45. Mpe ya solo, totindaki epai ya Thamûd, ndeko wa bango Swâlih ete (ayebisa bango): Bobondela Allah, kasi bakabwanaki na biteni mibale na kosuana
  46. Alobi: Oh bato na ngai! Mpona nini bozali kowelisa kosala mabe mpe botiki kosala bolamu? Soki ata bosengaki bolimbisi epai ya Allah, tango mosusu bokoyambema na ngolu naye
  47. Balobi ete: Tozali kornona mpona baye bazali nayo mabe mpona biso, azongiseli bango ete: Likambo na bino litali sé Allah. Kasi bino bokwei nde okati ya komekama
  48. Mpe okati ya mboka ezalaki na lisanga ya bato libua bazalaki kotia mobulu likolo ya mabele, bazalaki kosala bolamu ata шоке te
  49. Balobaki ete: Tolapa na Allah ete tokosala ye na libota naye mabe na butu, na sima tokoloba na moto oyo atelemi тропа kosenga makila naye ete: Biso toyebi moto abomi libota naye te. Mpe ya soló, tozali bosembo
  50. Mpe basali likita ya mabe, mpe tosalelaki bango lokola, kasi bazalaki koyeba te
  51. Tala lifuta ya mwango na bango basalaki mpe tobomaki bango na baye banso bazalaki elongo na bango
  52. Mpe tala bandako na bango, bitikali polele тропа bobubi bwa bango. Wana ezali sólo elembo mpo bato bakoka koyeba
  53. Mpe tolongisaki baye bandimaki mpe bazalaki kobanga
  54. Mpe Loth tango ayebisaki na bato naye ete: Bozali kosala mabe (kokutana mibali na mibali na nzela ya sima) mpe bozali kornona
  55. Ya soló, bino bozali koyela mibali na sima, botiki basi baye bakokokisela bino mposa. Kasi bozali na boyebi te
  56. Eyano ya bato naye ezalaki ete: Bobimisa libota lia Loth na mboka na bino, ya soló, bango bazali bato balingaka sé komipetola
  57. Mpe tolongisaki ye na libota lia ye, longola sé mwasi naye, totiyaki ye kati ya baye tobomaki
  58. Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya lolenge wana тропа baye bakebisamaki
  59. Loba: Matondo na Allah, mpe kimia ezala likolo ya bawumbu naye oyo baponami na (bolamu), boye Allah nde azali malamu to banzambe oyo bazali kosangisa naye nde baleki malamu
  60. Ezali ye te nde akela likolo na mabele mpe azali kokitisela bino mbula kowuta na likolo, mpe tobimiseli bino bilanga na milona ya kitoko? Bozalaki na makoki moko te ya kokolisa banzete na yango, boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Kasi bazali nde bato ya kokokisa Allah na eloko
  61. Ezali ye te nde atandi mabele тропа kofanda? Mpe atiolisi mingala okati na yango? Mpe apiki bangomba likolo na yango? Mpe akaboli bibale mibale ete bikutana te? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Kasi ebele na bango bazali koyeba te
  62. Ezali ye te nde oyo azali koyanola moleli tango abeleli ye, mpe alongoli ye mpasi mpe azali kokitanisa bino na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Moke nde bozali kokanisa
  63. Ezali ye te nde azali kokamba bino na molili ya mokili mpe molili ya ebale? Mpe nani azali kotindaka mopepe lokola sango ya malamu na ngolu naye? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Allah azali likolo koleka maye bazali kosangisa na yango
  64. Ezali ye te oyo abandaka bokeli sima azongeli yango? Mpe nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na mabele? Boye ezali na nzambe mosusu elongo na Allah? Loba: Bopesa bilembetele bia bino soki bozali na bosôló
  65. Loba: Moko te ayebi maye mabombami kati ya likolo na mabele, ezali sé Allah. Mpe bakoyebaka mokolo bakosekwisamaka te
  66. Kasi boyebi bwa bango na mokolo ya suka, mpe bazali na tembe тропа yango, to bazali kornona yango te
  67. Мре bapengwi balobi: Boye tango biso na batata na biso tokokomaka putulu, tokosekwisamaka lisusu (kowuta na malita)
  68. Tosilaki kopesama elaka biso na batata na biso тропа oyo liboso, kasi ezali sé masapo ya bankoko ya kala
  69. Loba: Botambola na mokili, bótala lolenge kani oyo esukelaka batomboki
  70. Kozala na mawa na bango te , mpe koyoka mpasi te тропа mwango na bango bazali kosala
  71. Mpe bazali koloba: Elaka yango ekozalaka tango nini, soki bozali koloba bosóló
  72. Loba: Tango mosusu oyo bozali koluka, ekokomelaka bino na makolo na bino
  73. Mpe ya soló, Nkolo nayo atonda bolamu likolo ya bato, kasi ebele ya bato bazali kotondo te
  74. Mpe Nkolo wayo ayebi sólo maye bazali kobomba o mitma mia bango, mpe maye bazali komonisa polele
  75. Mpe eloko moko te ebombami o kati ya likolo na mabele sé ekomama o kati ya buku ya polele
  76. Ya soló, kurani oyo ezali kolobela bana ya isalayele тропа ebele ya maye bazali kokabwana na yango
  77. Мре ya sólo, yango ezali bokambi mpe ngolu тропа bandimi
  78. Ya sólo, Nkolo wayo akokataka o kati kati na bango na mibeko mia ye. Mpe azali wa bokasi atonda boyebi
  79. Mpe mipesa epai ya Allah. Ya sólo, ozali na bosembo ya polele
  80. Ya sólo, yo ozali na bokoki ya koyokisa bawei te, mpe koyokisa baye bakufa matoyi te, tango bakimi bapesi mokongo
  81. Mpe ozali na bokoki ya kokamba bakufi miso te soki babungi, kasi okoki sé koyoka baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali batosi (bamizilima)
  82. Mpe tango liloba likokwelaka bango, tokobimisela bango nyama o kati na mabele oyo akolobela bango. Ya sólo, bato bazalaki kondimela bilembo bia biso te
  83. Mpe mokolo moye tokosangisaka na umma nionso bato ebele, baye baboyaki kondima na bilembo bia biso, banso bakotelema na milongo
  84. Kino tango bakokoma, (Allah) akolobaka: Boye boboyaki kondimela bilembo bia ngai, mpe botiki kokangama na yango mpe bozali koyeba, to bozalaki kosala nini
  85. Mpe liloba likokweyaka likolo lia bango тропа bobubi bwa bango, mpe bakokoka koloba eleko te
  86. Bazali kornona te, boye ya soló, totiyaki butu mpo bazua bopemi, mpe mokolo тропа kornona. Ya sólo, wana ezali bilembo тропа bandimi
  87. Mpe mokolo moye kelelo ekobetama (kofula mondule to kelelo ya suka тропа kosekwisa bato), baye banso bazali o likolo mpe na nsé, bakosutuka na kobanga (liwa,) longola sé ba oyo ye moko Allah akobatela. Mpe banso bakoya epai naye na komikitisa nyoso
  88. Mpe okomona bangomba okanisi ete yango ezali makasi, kasi yango ekomi kotambola lokola londende na likolo, wana ezali mosala ya Allah oyo abongisa lolenge ya biloko binso. Ya sólo, ye azali na sango ya maye bozali kosala
  89. Oyo akoyaka na bolamu moko, akozalaka na bolamu koleka wana. Mpe mokolo wana bakozala mosika na bobangi
  90. Mpe oyo akoya na mabe, bakobwakama na moto na bilongi na bango. Boye bokofutama te sé engebene na maye bozalaki kosala
  91. Ya soló, natindamaki mpo ete Nabondela Nkolo ya mboka oyo (makkah) esanto, mpe biloko binso bizali yaye, mpe lisusu natindamaki ete nazala okati ya baye bazali na komisokia
  92. Mpe natanga kurani, oyo akomikamba ezali тропа ye moko, mpe oyo akomibungisa, loba: Ya sólo, nazali sé moko kati ya bakebisi
  93. Mpe loba: Matondo ezali ya Allah, akolakisa bino bilembo bia ye, mpe bokoyeba yango. Mpe Nkolo wayo azangaka koyeba te maye bozali kosala