26.The Poets

  1. Twâ, sín, mîm
  2. Oyo nde mikapo mia buku ya polele
  3. Ozali komitungisa mpo été baboyi kondima
  4. Soki tolingaki mbele tokitisaki bilembo epai na bango kowuta о likolo, bakingo na bango elingaki kogumbama. (na soni)
  5. Мре tango nyoso lilendisi ya sika likoyela bango kowuta epai ya Ar-Rahmân, sé bakopesa yango mokongo
  6. Baboyaki kondima, (na makambo nyoso oyo ewutaki epai ya Nkolo wa bango) kala te bakoyelaka bango basango тропа maye bazalaki kotiola na yango
  7. Boye bazali kornona mabele te boni tokolisaki kati na yango (milona mibale mibale) na lolenge ya malamu
  8. Ya soló, wana ezali elembo. Kasi ebele kati na bango bazali kondima te
  9. Mpe ya soló, Nkolo wa yo azali wa bokasi atonda ngolu
  10. Mpe tango Nkolo wayo abengaki Mûssa, kende epai ya bato ya mabe
  11. Bato ya falo. Bazali kobanga (Allah) te
  12. Alobi: Nkolo, ya sólo nazali kobanga ete bandimela ngai te
  13. Ntolo na ngai ezali ya kokangama, mpe lolemu na ngai elobaka malamu te, tinda yango epai ya Hâruna
  14. Mpe nazali na mabe oyo nasala bango, na yango nazali kobanga été noki bakoboma ngai
  15. (Allah ayebisaki ye): Eloko ezali te, bökende bino mibale na bilembo bia biso, tokozala elongo na bino tozali koyoka
  16. Bökende epai ya falo bino mibale, boyebisa ye ete, Nkolo ya mokili nde atindi biso ya sólo
  17. Mpo opesa biso bana ya isalayele
  18. Falo alobi: Tobokoloki yo te kowuta bolenge?, mpe tovandaki nayo bamibu ebele te
  19. Мре osalaki maye osalaki, mpe ozalaki kati ya bapengwi
  20. Mûssa alobi: Nasalaki yango mpo été nazangaki koyeba
  21. Yango nakimaki bino тропа bobangi. Sima Nkolo wa ngai apesi ngai bwanya, mpe aponi ngai okati ya batindami
  22. Wana nde bolamu nayo ozali kokundolela ngai yango, mpe yo osili kozua bana ya isalayele bawumbu nayo
  23. (Falo ) alobi; nani Nkolo wa molongo
  24. (Mûssa) alobi: Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango mibale, soki bozali na ntembe te
  25. Falo alobi na baye bazali pembeni naye ete: Boye bozali koyoka te
  26. (Mûssa) alobi; Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bato ya kala
  27. (Falo) alobi: Ya soló motindami oyo batindi ye epai na bino azali ligboma
  28. (Mûssa) alobi: Nkolo wa moniele na eloli, na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki bozali koyeba
  29. (Falo) alobi: Soki olandi nzambe mosusu otiki ngai, nakokotisa yo na boloko
  30. (Mûssa) alobi: Ata soki nayeli yo bikamwa ya polele
  31. (Falo) alobi: Yaka na yango soki ozali o kati ya balobi bosôló
  32. (Mûssa) abwaki lingenda lia ye, mpe tala ebongwani nyoka ya polele ebandi kotambola
  33. Mpe abimisi loboko naye na libenga, mpe tala ekomi pembe makasi pona baye bazali kotala
  34. (Falo) alobi na bankumu naye bazalaki pembeni naye: Ya soló, oyo nde nganga monene ya boyebi
  35. Alingi kobimisa bino o mabele na bino na bonganga naye, boye bokosala nini
  36. Balobi: Zelisa ye na ndeko wa ye, mpe tinda bato na mboka mpo basangisa (bakende kosangisa banganga, sima baya komekana)
  37. Mpe bamemela yo banganga ya minene oyo bayebi
  38. Banganga basangani o mokolo mwa elaka
  39. Mpe bayebisi na bato ete: Boye bokosangana te
  40. Mpo tolanda banganga soki bango balongi
  41. Mpe tango banganga bakomi epai ya falo balobi naye été: Boye tozali na lifuta soki tolongi
  42. (Falo) alobi: Iyo, ya soló, nakotiya bino pembeni na ngai
  43. Mûssa ayebisi bango: Bobwaka oyo bolingi kobwaka
  44. Mpe babwaki basinga na bamangenda na bango, (mpe balobi): Na nguya ya falo ya sólo, tokolonga
  45. Mpe Mûssa abwaki lingenda lia ye, mpe tala emeli nyoso oyo basalaki
  46. Mpe banganga nyoso bakweyaki na kofukama
  47. Balobi: Tondimi na Nkolo wa molongo
  48. Nkolo ya Mûssa na Hânına
  49. (Falo) alobi: Bondimi naye yambo ete napesa bino ndingisa! Ya sólo, ye nde mokonzi ya bino oyo alakisaki bino bonganga, bokoyeba kala te. Nakokata bino maboko na makolo na lolenge ya bokeseni, mpe nakobaka bino banso na nzete
  50. Banganga balobi: Mabe ezali te, pamba te, mpo tokozongaka ya soló epai ya Nkolo wa biso
  51. Ya soló, posa na biso ezali ete Nkolo wa biso alimbisa biso, mpo tozali bato ya yambo тропа kondima (ye Allah)
  52. Mpe toyebisaki na Mûssa ete: Akende na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ya soló bakolanda bino
  53. Мре falo atindi été basangisa bato ya mboka
  54. Ete: Ya sólo, bato oyo bazali токе
  55. Мре ya sólo, balongi biso
  56. Kasi biso banso tozali na bokebi
  57. Mpe tobimisaki bango na bilanga mpe mingala
  58. Bamaziba ya bomengo mpe bisika ya lokumu
  59. Lolenge moko topesaki bokitani na bana ya isalayele
  60. Mpe balandaki bango na ntongo makasi
  61. Mpe tango mapinga mibale bamonani; bato ya Mûssa balobaki été: Ya sólo, biso tosili kozuama (bato ya Mûssa bakanisaki été bakokanga bango ya soló)
  62. (Mûssa) alobi te. Ya soló Nkolo wa ngai azali elongo na ngai, akokamba ngai
  63. Mpe topesaki emoniseli epai ya Mûssa ete; beta lingenda lia yo na ebale mpe ekabwani na mibale lokola ngomba ya monene
  64. Mpe totikaki ete baye wana bapusana. (Falo na bato naye)
  65. Mpe tolongisaki Mûssa na bato naye banso oyo bazalaki elongo naye
  66. Sima, tozindisaki basusu (banguna)
  67. Ya sólo, wana ezali elembo. Ebele kati na bango bazali kondima te
  68. Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
  69. Mpe tángela bango sango ya Ibrâhîm
  70. Tango alobaki na tata naye mpe bato naye: Nini bozali kobondela
  71. Balobaki: Tozali kobondela bikeko, mpe tokokangama sé na yango
  72. Alobi: Boye bayokaka bino tango bosengaka bango
  73. То boye basalisaka bino to mpe banyokoloko bino
  74. Balobi: Tokutaki bankoko na biso ya kala bazali sé ndenge wana
  75. Alobi: Bososoli mpenza тропа oyo bozali kobondela
  76. Bino na bankoko na bino ya kala
  77. Bango banso bazali banguna na ngai, longola sé Nkolo wa molongo
  78. Oyo akelaki ngai mpe azali kokamba ngai
  79. Mpe ye nde aleisaka ngai, mpe amelisaka ngai
  80. Mpe tango nabeleke, ye nde abikisaka ngai
  81. Mpe ye nde akoboma ngai, sima akosekwisa ngai
  82. Mpe nazali kolikia ete alimbisa ngai masumu omokolo mwa suka
  83. Nkolo! Pesa ngai bwanya (mpe boyebi), mpe tia ngai elongo na bato ya malamu
  84. Tika ete lolemu na ngai eloba bosoló epai ya basusu
  85. Mpe tiya ngai nazala okati ya bakitani ya lola ya kitoko
  86. Mpe limbisa tata wa ngai mpo azalaki 0 kati ya babungi
  87. Suratu Ach-Chu’arâ Eteni 19 Л
  88. Mpe koyokisa ngai nsoni te o mokolo ya lisekwa
  89. Mokolo moye misolo na bana bakosalisaka te
  90. Longola sé oyo akoya epai ya Allah na motema ya malamu. (Motema molamu ya kopetoama)
  91. Bakopusanisaka lola pembeni ya babangi (Allah)
  92. Mpe bakomonisaka bato mabe moto
  93. Mpe bakolobelaka bango: Wapi maye bozalaki kobondela
  94. Na botiki Allah, boye bazali kosunga bino? To mpe bango moko bazali komisunga
  95. Mpe bakobwakama na moto bipai na bipai na bilongi na bango, na baye bapengwisaki bango
  96. Na basoda banso ya Satana (ibilisa)
  97. Bakolobaka: Mpe bazali kosuana okati na yango
  98. Na Allah! Ya soló, tozalaki na libunga ya polele
  99. Tozalaki kokokisa bino lokola Nkolo ya mokili
  100. Kasi ezali sé batomboki nde babungisaki biso
  101. Ata moninga ya soló soló azali te
  102. Soki tozuaka nzela ya bozongi (ata na mokili), tolingaki kozala okati ya bandimi. (baye bazali kosala bolamu)
  103. Ya sólo, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazali kondima te
  104. Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
  105. Bato ya Nûh bazangaki kondimela batindami, bazuaki bango bato ya lokuta
  106. Tango ndeko wa bango Nûh ayebisaki bango: Boye bokobanga (Allah) te
  107. Ya sólo, nazali motindami malamu тропа bino
  108. Bobanga Allah mpe botosa ngai
  109. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai lizali sé epai na Nkolo wa molongo
  110. Bobanga Allah mpe botosa ngai. İli. Balobaki: Tondimelayo! Kasi
  111. ezali sé bato bazanga ntina, nde balandaka yo
  112. Alobi: Nayebi te maye bazali kosala
  113. Lifuta na bango etali sé Nkolo wa ngai, soki bozali koyeba
  114. Nazali oyo abenganaka bandimi te
  115. Kasi nazali sé mokebisi ya polele
  116. Balobi: Nûh! Soki otiki te, okozala o kati ya baye tokoboma na mabanga
  117. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Bato na ngai bazali kondimela ngai te
  118. Lakisa bosôló kati kati na ngai na bango, mpe bikisa ngai na baye bazali elongo na ngai kati ya bandimi
  119. Mpe tolongisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa oyo ezalaki ya kotonda
  120. Mpe sima tozindisaki baye batikalaki (bapengwi oyo bazangaki bondimi)
  121. Ya soló, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te
  122. Mpe ya solo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
  123. Ba aad mpe baboyaki kondimela batindami
  124. Tango ndeko wa bango Hûd ayebisaki bango: Boye bozali kobanga te
  125. Ya soló, nazali motindami malamu epai na bino
  126. Bobanga Allah mpe botosa ngai
  127. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo
  128. Boye bozali kotonga bikeko na ngomba nyoso тропа kokumisa
  129. Mpe bozali kotonga bandako ya minene lokola bokotikala libela awa na mokili
  130. Mpe soki bopesi etumbu, bozalaka na mawa te, mpe bobimi bato ya makasi
  131. Bobanga Allah mpe botosa ngai
  132. Bobanga oyo azali kopesa bino bolamu, na nyoso oyo boyebi
  133. Oyo apesi bino banyama na bana
  134. Mpe bilanga na miluka
  135. Ya sôló, nazali kobangela bino etumbu 0 mokolo mwa suka
  136. Balobi: Olendisa biso to olendisa te, ezali sé lolenge moko
  137. Ezali sé ezaleli ya bato ya kala
  138. Mpe tokozuaka etumbu te
  139. Baboyaki kondimela ye, mpe tobomaki bango, ya soló wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te
  140. Mpe ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
  141. Ba Thamûd, baboyaki mpe kondimela batindami
  142. Tango ndeko wa bango Swâlih ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te
  143. Nazali motindami malamu epai na bino
  144. Bobanga Allah mpe botosa ngai
  145. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo
  146. Boye bokotikalaka na kimiya тропа maye bozali kosala
  147. O kati ya bilanga mpe mingala
  148. Milona mpe banzete ya nagh’l mpe ya mbuma kitoko
  149. Boye bozali kotonga bandako o likolo lia ba ngomba
  150. Bobanga Allah mpe botosa ngai
  151. Kasi botosa makambo ya balekisi ndelo te
  152. Baye bazali sé kobebisa o kati ya mabele mpe balingi kobongisa te
  153. Balobi: Ya soló, ozali sé o kati ya balokami
  154. Ozali sé moto lokola biso, yaka na elembo soki ozali kati ya balobi bosôló
  155. Alobi: Nâqah oyo azali na mokolo naye ya komela mayi, bino mpe bozali na mokolo ya komela (kozua) mayi
  156. Mpe bosala ye mabe te, noki te, etumbu monene ekozua bino mokolo moko boye
  157. Kasi babomaki ye, mpe na sima bakomaki kolela
  158. Mpe topesaki bango etumbu, wana ezali elembo kasi ebele na bango bazalaki kondima te
  159. Mpe Nkolo wayo azali ya sólo na bokasi atonda ngolu
  160. Bato ya Loth baboyaki mpe kondimela batindami
  161. Tango ndeko wa bango Loth ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te
  162. Nazali motindami malamu тропа bino
  163. Bobanga Allah mpe botosa ngai
  164. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo
  165. Boye bozali kosalela posa ya nzoto bino mibali na mibali o kati na mokili
  166. Mpe botiki basi oyo Nkolo wa bino akela тропа bino? Kasi bozali bato ya masumu (balekisi ndelo mpe babuki mibeko)
  167. Balobi: Eh Loth! Soki otiki te, tokobimisa yo (na mboka)
  168. Alobi: Ya soló, ngai naboyi maye bozali kosala
  169. Nkolo, longisa ngai elongo na libota lia ngai тропа maye bazali kosala
  170. Tolongisaki ye elongo na libota lia ye bango banso
  171. Longola sé mobange ya mwasi atikalaki elongo na baye bazuaki etumbu
  172. Sima, tobomaki basusu baye batikalaki
  173. Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya motindo wana тропа baye tokebisaki
  174. Ya soló, wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te
  175. Mpe Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
  176. Bato ya aîkat, baboyaki kondimela batindami
  177. Tango ndeko wa bango Shuaîb ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te
  178. Nazali motindami malamu epai na bino
  179. Bobanga Allah mpe botosa ngai
  180. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo
  181. Mpe bokokisa bimekelo ya bitando na ndenge esengeli, kasi bozangisa yango te
  182. Mpe botondisa emekelo na bosembo
  183. Mpe bobuba bato te na bimekelo na bango, mpe bosala mabe kati na mokili te, (mpe bosomba bosembo ya bato na misolo te)
  184. Mpe bobanga oyo akeli bino na baye baleka liboso na bino
  185. Balobi: Ya soló, ozali kati ya balokami
  186. Mpe ozali sé moto lokola biso, mpe tozali kokanisa ete ozali kati ya babuki lokuta
  187. Kweisela biso ndambu ya mapata soki ozali koloba bosölo
  188. Alobi: Nkolo wa ngai ayebi maye manso bozali kosala
  189. Kasi baboyaki kondimela ye, mpe topesaki bango etumbu o mokolo moye mapata eyindaki, ya solo, yango ezalaki nde mokolo ya etumbu monene
  190. Wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te
  191. Mpe ya soló, Nkolo wayo azali wa bokasi atonda ngolu
  192. Ya sólo, yango (kurani) eye, ekitisamaki kowuta epai ya Nkolo wa molongo
  193. Molimo mosantu (anzelu gabiliyele) akitaki na yango
  194. Na motema nayo mpo ozala okati ya bakebisi
  195. Na lokota ya arabo oyo ezali polele
  196. Mpe yango esilaka kokomama na makomi ya batindami ya kala
  197. Boye ezalaki elembo te тропа bango, mpo banganga nzambe ya bana ya isalayele bakoka koyeba yango
  198. Mpe soki tokitisaki yango epai ya moto oyo azali arabo te
  199. Mpe atangela bango yango mbele bandimaki na yango te
  200. Lolenge wana nde tokitisaki (koyimayima ezala) 0 mitema mia batomboki
  201. Bakondimaka na yango te kino bakomonaka etumbu ya makasi
  202. Ekoyela bango mbalakaka, bakoyebaka te
  203. Mpe bazali koloba ete: Boye tokozelisama? (mpo tokoka kondima)
  204. Boye! Etumbu na biso nde bazali kowelisa
  205. Boye ozali kornona te, soki topesaki bango mua mibu po basakana
  206. Sima maye balakamaki ekomelaki bango
  207. Esengo eye bazalaki na yango esalisaki bango na eloko te
  208. Mpe tobomaka mboka te, sé totinda bakebisi liboso
  209. (Mpona) kokebisa, mpe tozali babubi te
  210. Mpe ezalaki basatana nde bakiti nayango te (kurani)
  211. Mpe esengeli na bango te, mpe bazali na makoki ya kosala yango te
  212. (Kasi) ya soló, bango bamitiye mosika mpona koyoka
  213. Mpe kobondela nzambe mosusu te elongo na Allah, noki te okozuama 0 kati ya bato ya etumbu
  214. Mpe kebisa libota nayo ya pene
  215. Mpe kitisa mapeka nayo (zala malamu) mpona bandimi oyo bazali kolanda yo
  216. Mpe soki baboyi kotosa yo, loba na bango ete: Ya soló ngai na nazali mosika na maye bozali kosala
  217. Mpe mipesa epai ya oyo azali na bokasi atonda mawa
  218. Oyo amonaka yo tango otelemaka
  219. Mpe (amonaka) yo tango ogumbamaka
  220. Ya soló, ye azali moyoki mpe moyebi
  221. Boye nayebisa bino epai ya nani basatana bazali kokita
  222. Bazali kokita epai ya bato ya lokuta basumuki
  223. Batiyaka matoyi kasi ebele na bango bazali bakosi
  224. Kasi epai ya bato ya másese (masapo), elandaka bango sé baye babunga
  225. Boye omoni te ete bazali kolekaleka kati kati ya ba ngomba (mibale)
  226. Mpe ya sólo, bango balobaka maye basalaka te
  227. Longola sé baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kokumisa Allah mingi, mpe bamisalisi na kopamela mabe ya babubi, kasi babubi bakoyebaka kala mingi te ba nani ekobebela bango