23.The Believers

  1. Bandimi basila kolonga
  2. Baye bamikitisaka tango bazali kosambela
  3. Mpe baye bazali kokima (makambo) maye mazanga ntina
  4. Mpe baye bazali kobimisa zakat
  5. Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango na ekobo
  6. Longola sé epai na basi na bango, to mpe bawumbu basi baye bazali na maboko na bango (bakoki kofanda na bango mwasi na mobali) mpo ete wana bakopamelama te
  7. Na yango, moto oyo akoluka kolekisa ndelo wana, bango nde babuki mibeko
  8. Mpe baye bazali kobatela mabombisi (amanati) oyo bapesi bango mpe bazali kotosa mpe kokokisa bilaka bia bango
  9. Mpe baye bazali kobatela balosambo na bango
  10. Bango nde bakitani
  11. Bakokitanelaka bisika ya likolo, na lola bakozalaka libela o kati na yango
  12. Mpe tosilaki kokela moto na mabele ya potopoto
  13. Sima tozalisaki ye litanga lia (mayi) ya ndembo kati ya ebombelo ya makasi
  14. Sima tokomisaki mayi liboke ya makila sima makila ekomi mosuni, sima mosuni ekomi mokuwa, sima tolatisi mokuwa mosuni, sima tosali ye ekelamu mosusu. Mapamboli manso mazali ya Allah mokeli ya malamu
  15. Sima na yango bokokufaka ya soló
  16. Sima bokosekwisamaka ya soló o mokolo mwa suka
  17. Мре tosilaki kokela o likolo na bino mapata sambo, mpe tozangaki bokebi te o tango ya bokeli
  18. Mpe tozali kokitisa mayi kowuta o likolo na bokoki (mayi wana eleka ebele te), sima tovandisi yango na mabele, mpe tozali na bokoki ya kobungisa yango
  19. Mpe kowuta na yango nde tozali kobimisela bino bilanga ya naghil na a’nâb, yango wana bozali na bambuma ebele, mpe bozali kolia bisusu o kati na yango
  20. Na nzete esusu ebimi na ngomba ya sinaî, ezali kobimisa mafuta тропа bopakoli тре тропа baleyi
  21. Mpe ya soló, bibwele bizali liteya тропа bino, tozali komelisa bino maye mazali kobima na mabumu na yango (miliki) тре bizali kosalisa bino mingi, тре bozali kólia bisusu kati na yango
  22. Mpe na yango na bamasuwa bozali kokumbama
  23. Mpe tosilaki kotinda Nûh epai na bato naye alobi: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye. Boye bozali kobanga te
  24. Mpe bankumu bapengwi okati na bato naye balobi: Nini oyo, azali moto lokola bino. Alingi amatela bino, soki Allah alingaka, (kotinda ntoma) mbele akitisaki ba anzelu. Makambo oyo totikala koyoka yango epai ya bankoko na biso ya kala te
  25. Oyo sé moto ya ligboma, bótala ye sima ya tango токе
  26. Alobi: Nkolo wa ngai, sunga ngai mpo bazwi ngai moto ya lokuta
  27. Tomonisaki naye ete; salamasuwa na miso na biso mpe na mitindo mia biso mpe tango mokano na biso ekoya mpe mayi ekobima na makasi na litumbu, kotisa na kati ya masuwa balolenge ya banyama moko na moko mwasi na mobali elongo na libota nayo, longola sé baye kati na bango liloba lisengeli likokisama likolo na bango. Kasi kotuna ngai te mpo na babubi, mpo ete bakozinda mbalakaka na mayi (bakokufa)
  28. Mpe soki omati na masuwa yo na ba oyo ozali na bango, loba: Lokumu ya Allah oyo alongisi biso likolo ya bato mabe
  29. Mpe loba: Nkolo kitisa ngai na esika ya mapamboli, mpe yo nde mokitisi ya malamu
  30. Ya soló, wana nde bilembo. Mpe tozali ya sólo baye topesaka komekama
  31. Sima na bango tokelaki bato basusu
  32. Mpe totindelaki bango motindami kowuta kati na bango moko mpo ayebisa bango ete: Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye, boye bozali kobanga te
  33. Mpe bankumu kati na bato naye na baye baboya kondimela elaka ya suka mpe topesi bango bolamu awa na nsé, balobi: Ye azali moto lokola bino, aliaka biloko oyo boliaka, mpe amelaka oyo bomelaka
  34. Kasi soki botosi moto oyo azali lokola bino, wana bosili kozanga
  35. Boye azali kolaka bino ete: Soki bokufi mpe bokomi putulu mpe mikuwa, ete bokobima (na malita)
  36. Mosika mosika тропа oyo bazali kolaka bino
  37. Wana ezali sé bomoyi ya biso oyo ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa kasi tokosekwa te
  38. Wana azali moto oyo azali kobukela Allah lokuta, mpe tokondimelaka ye te
  39. Alobi: Nkolo, sunga ngai mpo ete bazwi ngai moto wa lokuta
  40. (Allah) alobi: Iyo; kala mingi te bakokoma na mawa
  41. Mpe ligangi esimbaki bango na bosôló, mpe tokomisaki bango lokola makasa ya kokawuka (mpe bakumbami na mayi makasi), mpe libebi тропа babubi
  42. Sima na bango tokelaki bato basusu
  43. Mokano ya umma nyoso mokoki koleka eleko na yango te, mpe ekokutuama te
  44. Sima totindaki batindami na biso ya kolandisa, tango nyoso motindami akoyaka na umma moko bazui ye moto ya lokuta, mpe tolandisaki bango na bango, mpe tobetelaki bango másese (ya kokamwisa mpe kobangisa bango) mpe libebi тропа baye bandimaka te
  45. Sima totindaki Mûssa na ndeko waye Hânına na bilembo bia biso mpe bokonzi ya polele
  46. Epai ya falo na bankumu naye, (bato naye), basali lolendo, mpe bazalaki bato ya lolendo koleka
  47. Balobi: Tondimela bato mibale oyo bazali lokola biso, mpe bato na bango bazali bawumbu na biso
  48. Bazui bango nyoso mibale ete bazali bato ya lokuta, mpe bazuamaki kati ya baye babebisamaki. buku mpo tango mosusu bakokambama
  49. Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku mpo tango mosusu bakokambama
  50. Mpe totiyaki mwana ya Maryam na mama waye mpo (bazala) elembo, mpe totombolaki bango nyoso mibale na esika ya likolo na ngomba, eye ezali na kimia mpe na mayi ebele
  51. Eh bino batindami! Boliya bilei ya malamu mpe bosala malamu. Ya soló, ngai nayebi maye bozali kosala
  52. Mpe umma na bino oyo ezali sé umma moko, mpe ngai nde Nkolo na bino bobanga ngai
  53. Mpe bakabwani na makambo ya lingomba lia bango biteni biteni moto na moto azali kosepela na o ya ye
  54. Tika bango na libungi kino mwa ngonga moke
  55. Bazali kokanisa te, misolo na bana oyo tondimeli bango
  56. Tozali kopesa bango bolamu na lombango. Kasi bazali koyeba te
  57. Ya soló, baye na ntina ya bobangi Nkolo wa bango, batondisami na mawa
  58. Mpe baye bazali kondima na mikapo mia Nkolo wa bango
  59. Mpe baye basangisaka Nkolo wa bango na eloko te
  60. Mpe baye bazali kobimisa maye bapesi bango wana mitema mia bango mitondisami na bobangi (Nkolo wa bango), po bakozongaka epai ya Nkolo wa bango
  61. Baye wana bazali kowelisa тропа kosala bolamu, mpe bazali bato ya yambo тропа kosala (yango)
  62. Mpe topesaka moto mokumba te sé oyo ekoki naye, mpe buku oyo ezali koloba bosembo ezali nde epai na biso mpe bakobubama te
  63. Kasi mitema mia bango mitondi na libungi тропа (kurani) oyo, mpe bazali na misala misusu bazali kosala (bazali kosalela yango na lolenge esengeli te oyo Allah atindi)
  64. Kino tokomekisaka bato ya bozwi etumbu 0 kati na bango. Mpe okomona bango bakomi koganga тропа kosenga lisalisi
  65. Boganga lelo te. Ya soló, bokozua lisungi na biso ata шоке te
  66. Bozalaki koboya mikapo mia ngai miye bazalaki kotangela bino liboso
  67. (Bozalaki) kosalela yango lolendo mpe kotiola yango na tango miso na bino ezalaki polele
  68. Boye bazali komanyola liloba na oyo te (kurani) to eyeli bango oyo eyelaki bankoko na bango te
  69. To bayebaki motindami na bango te, mpo ete baboya ye
  70. To, bazali koloba ete azali ligboma? Kasi ayelaki bango na bosôló, mpe ebele na bango bazali kondima te
  71. Soki bosôló eyaki тропа kolanda bamposa na bango mbele mapata mpe mabele na maye mazali okati na yango malingaki kobeba, nzoka nde toyelaki bango bokundoli na bango mpe bango тропа bokundoli na bango bazali kopesa mokongo
  72. To ozali kotuna bango lifuta? Kasi lifuta ya Nkolo nayo nde ezali malamu, ye mopesi bomengo ya malamu
  73. Mpe ya soló, ozali kobenga bango na nzela ya semba
  74. Mpe baye bandimaka te o mokolo mwa suka, bazali mosika na nzela yango
  75. Mpe soki topesaki bango ngolu na biso, mpe tolongola bango mpasi oyo bazalaki na yango, balingaki kotikala sé na masumu na bango mpe bakozinda mpenza kati na botomboki na bango
  76. Mpe tosilaki kopesa bango etumbu, kasi batosaki Nkolo wa bango te, mpe bamilelaki epai naye te (epai na Allah), тропа kosenga
  77. Kino tokofungolela bango ezibeli ya etumbu ya makasi, mpe bakozanga elikia (тропа bolamu ya Allah)
  78. Mpe ye nde akela тропа bino, bomoni na boyoki na mitema, kasi bozali kotondo ye sé токе
  79. Ye nde akela bino mpe ati bino o mabele, bokosangisama epai naye
  80. Ye nde mopesi bomoyi mpe mopesi liwa, mpe ye nde mokesenisi butu na mokolo, boye bozali kokanisa te
  81. Kasi balobaki se maye bato wa yambo balobaka
  82. Balobi: Tango tokokufaka, tokokomaka putulu mpe mikuwa. Ya soló, boye tokosekwisamaka lisusu
  83. Basila kolaka biso na batata na biso liboso тропа oyo, yango ezali sé masapo ya kala
  84. Loba: Mabele na oyo ezali okati na yango ezali ya nani? Soki soló bozali koyeba
  85. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bozali kokanisa te
  86. Loba: Mapata sambo ezali ya nani, тре nani Nkolo ngwende ya monene
  87. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bokobanga te
  88. Loba: Bokonzi bonso bosimbami na maboko ya nani? Azali kobatela, kasi babatelaka ye te, soki ya soló bozali koyeba
  89. Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Kasi тропа nini bozali lokola balokami? (тропа kozanga na bango kondima na bomoko ya nzambe)
  90. Tomemelaki bango bosóló, kasi bango nde bato ya lokuta
  91. Allah azali na mwana te, mpe ezali na nzambe mosusu te elongo naye, noki te, nzambe na nzambe alingaki kokende na bikelamu naye mpe basusu balingaki kozala likolo ya baninga. Nkembo mpe lokumu na Allah likolo ya maye bazali kolobela
  92. Ayebi mabombami mpe makambo ya polele, azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango
  93. Loba: Nkolo; soki olakisaki ngai maye balakami
  94. (Na yango) Nkolo, kotika ngai o kati ya babubi te
  95. Ya soló, tozali na bokoki ya kolakisa yo maye tolaki bango
  96. Bengana mabe (kobongola) na kosala bolamu. Soló, toyebi malamu maye bazali kolobela
  97. Mpe loba Nkolo nazali kosenga nayo libateli тропа botombokisi ya basatana
  98. Mpe nazali kosenga nayo libateli Nkolo, ete bazala pene na ngai te
  99. Kino soki liwa ekomeli moko kati na bango akolobaka: Nkolo wa ngai, zongisa ngai
  100. Mpo nasala bolamu na maye natikaki na mokili, te, kasi ezali sé liloba oyo alobi, osima na bango ezali na ndelo, kino omokolo ya bosekwisami
  101. Мре tango bakobetaka to kofula kelelo, mokolo wana kibondeko ekozalaka te, mpe bakotunanaka mituna te
  102. Baye emekelo na bango ekoleka kilo mingi, (тропа bolamu), bango nde balongi
  103. Mpe baye emekelo na bango ekozalaka fafala, bango moko nde bamibungisaki, mpe bakokotaka lifelo, mpe bakozalaka libela o kati na yango
  104. Moto mokozikisa bilongi bia bango, mpe bakozala o kati na yango na mbebo yakozikisama
  105. Mitangelama bino mikapo mia ngai te, kasi bozalaki kondimela yango te
  106. Bakolobaka: Nkolo wa biso, bamabe na biso elongi biso mpe tozalaki babungi nzela
  107. Nkolo wa biso, bimisa biso okati na yango, mpe soki tozongeli, tokozala babubi
  108. Alobi: Botikala na kati na kozanga lokumu, mpe bolobisa ngai te
  109. Ya soló, Ezalaki na lisanga moko ya bawumbu na ngai bakolobaka: Nkolo wa biso, tondimi, limbisa biso mpe yokela biso mawa. Ya soló, yo ozali wa ngolu otanda bolamu
  110. Kasi botiolaki bango, kino ebosanisi bino kokumisa ngai, mpe bozalaki koseka bango
  111. Ya sólo, lelo nazali kofuta bango тропа oyo bazalaki na bozeli na yango. Ya sólo, bango nde balongi
  112. Bakotunaka bango, mibu boni bolekisaki o kati ya mokili
  113. Bakolobaka: Tovandaki mokolo moko to ndambu ya mokolo, tuna batangi ya motango na yango. (baye bayebi kotanga mikolo miye havandaki)
  114. Akolobaka: Bovandaki sé tango ya mokie, ya sólo soki bozali koyeba
  115. Boye bozali kokanisa ete tokelaki bino natina te, mpe bokozongisama epai na biso te
  116. Lokumu na Allah wa likolo mokonzi ya sólo. Nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye (mei) Nkolo ngwende ya lokumu
  117. Mpe oyo akobondela elongo na Allah nzambe mosusu, azali na elembetele na yango ya polele te, ya soló lifuta naye mokozalaka sé epai ya Nkolo waye. Ya soló, bapengwi bakolonga te
  118. Mpe loba: Nkolo limbisa mpe tiya ngolu, yo nde oleki na ngolu