21.The Prophets

  1. Eleko ya kokata likambo ya bato ekomi pembeni, kasi bazali komitungisa te тропа yango mpe bapesi mokongo
  2. Bokundoli moko te ya Nkolo na bango, ekomelaka bango ezanga te sé bayoka yango na kotiola
  3. Mitema mia bango mizali mosika, mpe babubi babebisi mitema mia bango, balobi: Oyo azali moto lokola bino тропа nini bozali komipesa na bondoki mpe bino bozali kornona malamu
  4. Alobi: Nkolo wa ngai ayebi manso mazali kolobama o likolo mpe na nsé, mpe azali moyoki atonda boyebi
  5. Kasi balobaki: Oyo wana ezali bosangani ya bandoto to ezali makambo naye moko, to ekoki kozala lisapo, to ayela biso elembo, ndenge etindamaki na bato ba yambo
  6. Ezali na etuka (mboka) moko te eye topesaki etumbu liboso lia bango bandimaki te, boye bango nde bakondima
  7. Mpe totindaki liboso nayo sé mibali topesaki bango emoniseli, botuna ba oyo bayebi soki bino boyebi te
  8. Mpe topesaki bango nzoto mpo baliaka biloko, mpe batikalaki libela te
  9. Sima tokokiselaki bango elaka тропа oyo bazalaki kosala, mpe tobikisaki baye tolingaki kobikisa kati na bango, mpe topesaki etumbu na balekisi ndelo
  10. Tosilaki ya soló, kokitisela bino buku eye ezuami na bokundoli тропа bino. Boye bozali kokanisa te
  11. Mpe ebele bamboka oyo ezuamaki na mbeba mpe tobomaki yango, mpe tokelaki bato basusu na esika na bango
  12. Tango (bato wana) bamoni etumbu na biso, bakimaki na lombango
  13. Bokima te, bozonga na bisika biye bozalaki kobebisa kati na bandako na bino, mpo bokoka kotunama
  14. Bakolobaka: Oh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki babubi
  15. Bakotikaka komitungisa te, kino tokokomisaka bango lokola milona ya (mputulu miye mikawuka) mpe moto ezali kozikisa bango
  16. Мре tokelaki likolo mpe na mabele, na maye mazuami kati na yango na lisano te
  17. Soki tolingaki kozua yango na lisano, mbele tosalaki yango na ndenge ya biso moko soki ya soló tolingaki kosala
  18. Tozali kolobela тропа bosôló, kasi lokuta te, mpe lokuta elimwa mpe ekende. Mpe mabe ekozala likolo na bino тропа oyo bozali kokokisa (Allah) na yango
  19. Mpe manso oyo mazali o likolo mpe na nsé, mazali ya ye, тре baye bazuami pene naye (ba anzelu) basalaka lolendo te тропа kokumisa ye, mpe balembeke te
  20. Bazali kokumisa (ye) butu na moyi, taka ezali kotikala te
  21. Boye basili kozua banzambe oyo bakosekuisa bawa na mabele
  22. Soki o kati ya likolo na o nsé ezalaka na banzambe mosusu elongo na Allah, mbele mobulu ekotaki kati na yango (mapata na mabele), mpe nkembo na Allah kolo ya ngwende na maye bazali kokokisa
  23. Akotunamaka na oyo asali te, kasi bango nde bakotunama na maye basalaki
  24. Boye bazali kondimela banzambe mosusu na botiki ye? (Allah) loba: Boya na bilembetele na bino. Oyo ezali bokundoli тропа baye bazali elongo na ngai, тре bokundoli тропа baye balekaka liboso na ngai. Kasi ebele na bango bazali koyeba bosôló te. Мре bazali komitiya mosika па yango
  25. Мре liboso nayo totindaki motindami te, sé topesa ye emoniseli ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele ngai, mpe bobondela ngai
  26. Mpe bazali koloba: Ar-Rahmân azali na mwana, nkembo naye, kasi bazali sé bawumbu (naye) ya lokumu
  27. Balekaka ye na maloba te, basalaka sé na mitindo mia ye
  28. Ayebi oyo ezali liboso na bango mpe sima na bango mpe bazalaka balobeli ya moto te sé na ba oyo (Allah) asepeli na bango, mpe bazali kobanga ye bobangi ya sólo
  29. Мре oyo kati na bango akoloba ete: Ya soló ngai nazali nzambe kasi ye te (Allah), tokofuta ye lifelo. Boye nde tokofutaka babubi
  30. Boye bapengwi bazali kornona te, ete likolo na mabele bizalaki ya kokangama mpe to fungoli yango? Mpe tokela bomoyi nyonso kowuta na mayi? Boye bazali kondima te
  31. Mpe totiyaki bangomba o kati na mabele mpo ete esimbama makasi mpe eningana te na baye bazali likolo nayango mpe totiyeli yango banzela mpo bakoka kokambama
  32. Mpe totiyaki likolo ezala etando eye ebatelama, kasi bazali komitiya mosika na bilembo na yango
  33. Mpe yende akela butu na mokolo, moyi na sanza, nyoso ezali kotambola na nzela na yango
  34. Mpe totiaki moto liboso nayo te mpo atikala libela, soki yo okufi, bango nde bakotikala libela
  35. Molimo nyoso mokomeka liwa (moto nyoso akokufaka), mpe tokomeka bino na mabe mpe na malamu mpe epai na biso nde bokozongisama
  36. Mpe tango bapengwi bazali kotala yo mpe bazali koseka yo, mpe bazali koloba: Oyo nde azali kolobela banzambe na bino? Mpe bazali koboya bokundoli ya Ar- Rahmân
  37. Moto akelama na kowela wela. Nakolakisa bino bilembo na ngai, kaši bowelisa ngai te тропа yango (etumbu)
  38. Mpe bakolobaka: Elaka yango ekokokisama tango nini, soki bozali koloba solo
  39. Soki bapengwi bayebaka tango oyo bakopekisaka te móto ezua bango na bilongi bia bango mpe na mikongo mia bango, kaši bakolongisamaka te
  40. Kaši tango wana ekoyelaka bango na mbalakaka, mpe bakokoka kozongisa yango te, mpe bazali kotala
  41. Mpe batiolaki batindami yambo ya boyei nayo, mpe baye basakanaki na bango, babetamaka na lolenge nyoso, тропа oyo bazalaki kotiola yango
  42. Loba: Nani abatelaka bino o kati na butu тре па тоуі па etumbu ya Ar-Rahmân? Мре bazali kopesa mokongo na bokundoli ya Nkolo wa bango
  43. To bazali na banzambe basusu na esika na biso oyo bakobatela bango? Kasi bakokoka te komisalisa bango moko mpe bakokoka te koluka nani akosunga bango likolo na ngai
  44. Kasi topesaki ba oyo mpe batata na bango bisengo ya ntango шоке kino mibu na bango mikoma ebele. Boye bazali kornona te ete tozali kokutola mabele bangambo na yango nyoso? Boye bakanisi ete bakolonga
  45. Loba: Nazali kokebisa bino na emoniseli. Mpe oyo matoyi naye ekufa, akoyokaka te o tango bazali kokebisa ye
  46. Mpe soki mopepe ya etumbu ya Nkolo wa bango mozui bango, balobi: Eh biso! Mpasi na biso, ya soló, tozalaki babubi
  47. Mpe o mokolo mwa suka, tokotiyaka bimekeli bia bosembo, molimo moko te mokobubama, ata soki ezali emekelo ya mbuma ya moke ezanga kilo tokoya na yango. Tokoki mpenza тропа kofuta
  48. Mpe tosilaki kopesa Mûssa na Háruna buku, ya bososoli (torah) mpe na bongengi mpe ezala bokundoli тропа babangi
  49. Baye bazali kobanga Nkolo wa bango ata soki bazali kornona ye te, mpe bazali kobanga eleko ya mokolo ya suka
  50. Мре (kurani) oyo ezali bokundoli oyo epambwama tokitisaki yango, boye bino bozali koyina yango
  51. Mpe liboso tosilaki kopesa Ibrâhîm bokambi mpe biso nde toyebaki yango
  52. Tango alobaki na tata waye mpe bato naye: Oyo bikeko nini bozali komipesa na yango
  53. Balobaki: Tokutaki batata na biso (to, bankoko na bango ya kala) bazalaki kobondela yango
  54. Alobi: Ya soló, bino na bango bozalaki na libunga ya polele
  55. Balobaki: Oyeli biso bosóló to ozali kosakana
  56. Alobi: Kasi Nkolo wa bino azali Nkolo wa likolo mpe nsé oyo akela yango, mpe ngai nazali moko kati ya banzeneneke na yango
  57. Mpe na lapi na Allah, ete nakani bikeko bia bino osima ya kokende na bino
  58. Abuki yango biteni biteni, atiki oyo ya monene, mpo tango mosusu bakozongela yango
  59. Balobi: Nani asali banzambe na biso boye? Ya soló, ye azali moko ya babubi
  60. Balobi: Bayebisi biso oyo asali boye ezali elenge mobali moko nkombo naye Ibrâhîm
  61. Balobi: Bomema ye awa na miso ya bato mpo bakoka kotatola
  62. Balobi: Yo nde osali boye na banzambe na biso oh Ibrâhîm
  63. Alobi: Oyo asali boye nde mokolo wa bango oyo, botuna bango soki bakoki koloba
  64. Bazongisaki mayele na bango mpe balobi: Ya sólo, bino nde bozali babubi
  65. Sima mabe ezongeli bango moko mpe balobi: Oyebi malamu ete (bikeko) oyo bilobaka te
  66. Alobi: Boye bozali kobondela na botiki Allah maye makosalisa bino te mpe makosala bino mabe te
  67. Ufi na bino na maye bozali kobondela biye bizali Allah te, boye bozali kokanisa te
  68. Balobi: Bozikisa ye, mpe bosunga banzambe na bino. Soki ya sólo, bolingi kosala
  69. Tolobaki: Eh móto! Zala malili mpe kimia тропа Ibrâhîm
  70. Mpe balingaki kosala ye mabe, kasi totiyaki bango o kati ya bazangi mpenza
  71. Mpe topesaki ye elonga, mpe Loth lokola, mpe totindaki bango o mboka eye to pambolaki yango mpo na bato ya mokili mobimba
  72. Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb ndenge asengaki, mpe banso totiyaki bango o kati ya bato malamu
  73. Mpe totiyaki bango bakambi, mpo bakamba na mibeko mia biso, mpe tolakisaki bango kosala bolamu, mpe kotelemisa losambo mpe kopesa zakat mpe bazalaki babondeli na biso
  74. Mpe topesaki Loth bwanya na boyebi, mpe tobikisaki ye na mboka oyo bazalaki kosala mabe. Ya soló, bazalaki bato mabe mpe bazangi
  75. Mpe tokotisaki ye na mawa та biso, ya sólo azali kati na bato ya malamu
  76. Mpe tango Núh abelelaki liboso, tondimelaki ye, mpe tobikisaki ye na libota lia ye kowuta na milelo monene
  77. Mpe tolongisaki ye kowuta na bato baye baboyaki kondimela bilembo bia biso mpe bazuaki yango ete: Ezali lokuta. Ya soló, bazalaki bato ya mabe, mpe tozindisaki bango banso
  78. Mpe Dâwud na Suleyman, tango basambisaki тропа bilanga oyo bameme ya bato bakendaki kolia yango na butu, mpe tozalaki nzeneneke тропа bosambisi bwa bango mibale
  79. Mpe topesaki Suleyman bososoli na yango, mpe topesaki bango banso bwanya mpe boyebi, mpe topesaki ngolu na biso epai ya Dâwud ete: Bangomba mpe bandeke basanzola biso elongo naye, mpe biso nde tozalaki kosala yango
  80. Mpe tolakisaki ye kosala nguba mpo ezala lisungi lia bino, boye bozali na botondi
  81. Mpe tondimelaki Suleyman, mopepe moye na motindo naye mopepaki noki noki о ngambu ya mabele maye topambolaki yango. Mpe tozali bayebi ya biloko binso
  82. Mpe bazabulu mosusu bazali kosalela ye mosala na nsé ya mayi mpe bazalaki kosalela ye misala misusu, kasi biso nde tozalaki kokengela bango
  83. Mpe Ayûb, tango abelelaki Nkolo wa ye, ete ya soló, mpasi esili koleka ngai, mpe yo nde ozali ngolu wa bangolu koleka
  84. Tondimelaki ye mpe tolongolelaki ye mpasi oyo azalaki na yango, mpe tozongiselaki ye libota lia ye mbala mibale ngolu kowuta epai na biso, mpe bokundoli тропа babondeli
  85. Mpe Ismâîl na Idrîs na Dzul-kifl bango banso bazalaki bakangi mitema
  86. Mpe tokotisaki bango na ngolu na biso. Ya soló, bazalaki o kati ya bato ya malamu
  87. Mpe Yûnus, tango akendeki na kanda, akanisaki ete tokoki komeka ye te, mpe abelelaki na molili (na mozindo ya ebale) ete: Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló seyo (Allah) lokumu ezala nayo, ya sólo, nazalaki o kati ya babubi
  88. Tondimelaki ye mpe tobikisaki ye na kolela naye. Lolenge wana nde tosalisaka bandimi
  89. Mpe Zakariya, tango abelelaki Nkolo wa ye, Nkolo wa ngai kotika ngai moko te, mpe ya sólo, ozali malamu ya bakitanisi
  90. Tondimelaki ye mpe topesaki ye Yahya, mpe tobikisaki mwasi naye (na ekomba). Ya soló, bazalaki kowelela тропа kosala bolamu, bazalaki kobondela biso na bolingo mpe na kobanga mpe bazalaki komikitisa liboso na biso
  91. Mpe oyo abatelaki bongondo naye (Maryam) mpe tofulaki mpema na biso kati naye, mpe totiaki ye na mwana naye bazala elembo тропа mokili mobimba
  92. Ya soló umma na bino oyo ezali sé moko mpe ngai nde Nkolo wa bino bobondela nga
  93. Mpe bokabwani ekoti kati na bango, mpe bango banso bakozonga epai na biso
  94. Oyo akosala misala malamu mpe azali mondimi, tokoboyaka molende mwa ye te. Mpe ya soló tokokomela ye (yango)
  95. Epekisami na mboka oyo tosili koboma yango ete bazonga lisusu na bomoi likolo na yango
  96. Kino tango ba kofungola ya’djûdj na ma’djûdj mpe bango bakokita na lombango
  97. Wana elaka ya sólo ekomi pene, mpe okomona bapengwi bakomi kotala, bakolobaka: Mpasi na biso, tozalaki na bozangi kokanisa na oyo mpe tozalaki babubi
  98. Ya soló, bino na maye bozali kobondela na botiki Allah, bokozala koni mwa lifelo bokokotaka na kati bino banso
  99. Soki bango bazalaki banzambe, balingaki kokoto yango te (lifelo), mpe bango banso o kati na yango libela na libela
  100. Kati na yango bakonyokwama mpe bako ganga makasi, mpe bakoyokaka kati na yango te
  101. Ya sólo, baye bakozala mosika na lifelo, ezali ba oyo tosilaki kolaka bango bolamu
  102. Bakoyokaka lolaka na yango te, mpe bakosepelaka lolenge balingi seko na seko
  103. Kobanga ya monene ekozua bango te, mpe ba anzelu bakoyambaka bango: Oyo nde mokolo ba laka bino
  104. Mokolo moye tokogumba mapata ndenge bagumbaka makasa ya makomi. Ndenge tokelaki mbala ya yambo, ndenge wana mpe tokozongela yango. Wana ezali elaka na biso tokokokisa yango
  105. Mpe ya soló, tosilaki kokoma o kati ya zabur, o sima ya makundoli, ya solo, baye bakoki kozua bokitani ya mabele ezali bawumbu na ngai ya malamu (bandimi)
  106. Ya sólo, oyo ezali botangisi тропа babondeli
  107. Mpe totindaki yo te sé тропа ozala ngolu тропа mokili mobimba
  108. Loba: Ya sólo, ngai nazui emoniseli ete ya sólo Nzambe wa bino azali Nzambe moko, boye bondimi komisokia
  109. Mpe soki baboyi mpe bapesi mikongo, loba: Nazali kokebisa bino, mpe nayebi te, soki oyo elengelemi тропа bino ezali pene to mosika
  110. Ya sólo, ye ayebi polele ya maloba mpe maye bobombaka
  111. Mpe nayebi te soki ezali komekama mpo na bino to esengo ya ntango токе
  112. Alobi: Nkolo kata na bosembo bonso. Mpe Nkolo wa biso Ar- Rahmán ye nde mosalisi likolo ya maye balobelaka