20.Taa-Haa

  1. Twâ hâ
  2. Tokitiselaki yo kurani te mpo epesa yo pași
  3. Sé ezala bokundoli тропа oyo azali kobanga, (Allah)
  4. (Мре ezala) emoniseli ya oyo akelaki mabele na likolo oyo etomboami
  5. Ar-Rahmân Atombwami na ngwende naye
  6. Maye manso mazali olikolo тре mabele na maye mazuami kati kati na yango na oyo na nsé ya mabele mazali ya ye
  7. Mpe soki otomboli mongongo, ayebi solo maye mabombami na maye mazali ya kobatama koleka
  8. Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, mpe azali na bankombo ya kitoko koleka
  9. Mpe boye masolo (makomi) ya Mûssa makomelaki yo
  10. Tango amonaki moto, mpe alobaki na libota naye; botikala awa, ya soló, namoni moto na mosika tango mosusu nakoyela bino kowuta na yango eloko ya kopelisa to na kokutana na oyo akokamba ngayi
  11. Mpe tango akomi, abiangami, Oh Mûssa
  12. Ezali ya sólo, ngai Nkolo wayo, longola mapapa nayo, ya sólo, ozali otei ya lobwako esantu (ya touri)
  13. Mpe naponi yo, yoka maye bakoyebisa yo
  14. Ya sólo penza, ngai nde Allah nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé ngai, bondela ngai mpe telemisa losambo тропа kokanisa ngai
  15. Ya soló, ntango ya suka ekoya, na bombi yango mpo ete molimo na molimo afutama na mpiko naye
  16. Kasi oyo andimi na yango te mpe alandi sé mposa naye, abungisa yo te noki te okobebisama
  17. Mpe nini boye ezali na loboko nayo ya mobali oh Mûssa
  18. Alobi: Ezali nde lingenda lia ngai, nayekemelaka yango, mpe esalisaka ngai na bobuki bakasa ya banzete тропа koleisa banyama na ngai, mpe esalisaka ngai na makambo mosusu
  19. (Allah ayebisi ye): Bwaka yango oh Mûssa
  20. Мре abwaki yango, mpe ebongwani nyoka ebandi kotambola
  21. (Allah) alobi: Zua yango, kaši kobanga te, tokozongisa yango na lolenge ezalaki liboso
  22. Mpe kanga loboko nayo na nsé ya lipeka, ekobima na bongengi ya mpembe makasi mpe ekosala mpasi te. Wana elembo mosusu (bikamwa)
  23. Mpo tolakisa yo makamwisi ma biso ya minene
  24. Kende epai ya falo, ya soló ye asili kolekisa ndelo
  25. (Mûssa) alobi: Nkolo wa ngai, fungóla ntolo na ngai
  26. Mpe etinda na ngai oyo, tia yango ezala mpete
  27. Mpe bongisa elobeli na ngai
  28. Mpo bakoka kososola maloba na ngai
  29. Mpe pesa ngai mosalisi awuta na libota lia ngai
  30. Hâruna ndeko wa ngai
  31. Тіа ye azala oyo akobakisela ngai nguya
  32. Kotisa ye na makambo na ngai (tokoma mibale)
  33. Mpo tokumisa yo koleka
  34. Mpe tokanisa yo mingi
  35. Ya soló, ozali kornona biso
  36. (Allah) alobi: Oh Müssa bosenga nayo esili kokokisama
  37. Mpe tosilaka kosalisa yo mbala ya yambo
  38. Tango toyebisaka na mama wayo mayebisi
  39. Ete: Tia ye na sanduku mpe bwaka yango na mayi mpo ete ebale emema yango o ngambo ya kotiola, monguna na ngai naye akozua ye. Mpe na tiaki likolo nayo bolingo na ngai mpo ete obokolama na nsé ya miso na ngai
  40. Mpe tango ndeko nayo ya mwasi azalaki kolanda yo mpe alobaki: Nalakisa bino moto oyo akomelisa ye тропа bino? Mpe tozongisaki yo epai ya mama wayo, mpo asepela mpe ayoka mpasi te, mpe obomaki moto mpe tobikisaki yo na makambo wana, mpe tomekaki yo makambo ebele, mpe ovandaki ba mbula ebele o mboka ya mad’yan, sima oyei oh Mûssa! Kokokisa makomi
  41. Mpe ngai moko naponaki yo
  42. Bökende yo na ndeko wayo na makamwisi ma ngai, mpe bolemba kokumisa ngai te
  43. Bökende epai ya falo, ya soló ye asili kotomboka
  44. Mpe boyebisa ye liloba ya pete, tango mosusu akoki kokanisa to kobanga ngai
  45. Balobi: Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, tozali kobanga ete anyokolo biso, to alekisa ndelo
  46. (Allah) alobi: Bobanga te, ya sólo nazali elongo na bino, nazali koyoka mpe kornona
  47. Bökende epai naye mpe boloba naye: Biso mibale tozali batindami ya Nkolo wayo, pesa biso bana ya isalayele tokende na bango, tika konyokolo bango, toyeli yo elembo ya Nkolo wayo, mpe kimiya ezala likolo ya moto oyo akolanda nzela ya semba
  48. Ya sólo, basilaki koyebisa biso ete: Etumbu ekozala likolo ya oyo akoboya kotosa mpe kondima, mpe apesi mokongo
  49. (Falo) alobi: Nani Nkolo wa bino oh Mûssa
  50. (Mûssa) alobi: Nkolo wa biso nde oyo apesaki eloko nyoso lolenge na yango mpe sima akambi yango
  51. (Falo) alobi: Bongo ndenge nini тропа baye balekaka kala
  52. (Mûssa) alobi: Oyo ayebi makambo na bango ezali nde Nkolo wa ngai, ekomama o kati ya buku, Nkolo wa ngai abungaka te, mpe abosanaka te
  53. Oyo asalelaki bino mabele ezala lokola mbeto mpe atiela bino banzela okati na yango, mpe azali kokitisela bino mayi kowuta o likolo, mpe na yango tobimisaka milona ndenge na ndenge
  54. Boliya mpe boleyisa bibwele na bino. Ya soló, wana nde bilembo тропа baye bazali kokanisa (bazali na mayele)
  55. Tokelaki bino kowuta na yango (mabele) mpe kati na yango nde tokozongisa bino, mpe tokobimisa bino lisusu okati na yango mbala mosusu
  56. Mpe tosilaki kolakisa ye bilembo bia biso nyoso, kasi aboyaki kondima
  57. (Falo) alobi: Oh Mûssa! Boye oyeli biso bonganga bwa yo mpo obimisa biso na mabele na biso
  58. Kasi tokoyela yo bonganga lokola yango, tiela biso elaka mpo moko kati na biso azanga te, ezala na esika ya malamu
  59. (Mûssa) alobi: Elaka na biso ekozala o mokolo mwa eyenga, mpe bato basangana na tongo
  60. Falo akei mpe asangisi bato naye na kibondoki na bango, sima bayei koyanola na elaka
  61. Mûssa ayebisi bango: Mabe ezala na bino, bobukela Allah lokuta te, noki te etumbu ekozua bino. Na oyo akobukela Allah lokuta, asili kobungisama
  62. Nasima bakomaki kolobana bango na bango nasekele
  63. Balobi: Ba oyo bazali banganga mibale, balingi kobimisa bino na mabele na bino na bonganga na bango, mpe botika nzela ya malamu oyo bozali na yango
  64. Bosangisa bonganga na bino nyoso, mpe bosala molongo. Mpe oyo akozala likolo asili kolonga
  65. Balobi: Oh Mûssa! Obwaka to biso tobwaka bato ya liboso
  66. Alobi: Bobwaka noki, na mbalakaka nde basinga mpe ba mangenda na bango bimonanaki na miso naye lokola ba nyoka na bondoki na bango
  67. Bobangi moke bokomelaki Mûssa ye moko
  68. Toyebisaki ye: Kobanga te, yo nde okozala likolo. (na bango)
  69. Мре bwaka oyo ezali na loboko nayo ya mobali, ekomela manso oyo basali. Soló, wana basali ezali mwango ya bonganga, mpe nganga akoki kolonga te о esika nyoso awuti
  70. Banganga banso bakweyaki na bogumbami mpe balobi: Tondimi na Nkolo ya Hâruna na Mûssa
  71. (Falo alobi): Boye bondimeli ye yambo ete napesa bino ndingisa? Ya sólo, ye nde mokonzi wa bino oyo alakisaki bino bonganga, nakokata bino maboko na makolo na bokeseni, mpe nakobaka bino na mibimbi mia nzete ya nagh’l, mpe bokoyebaka ya sólo penza nani kati na biso azali na etumbu ya makasi koleka mpe yakowumela
  72. Balobi: Tolapi na oyo akelaki biso, tokolikia epai nayo te, тропа bilembo oyo eyeli biso, sala oyo olingi kosala, yo ozali sé kokata makambo ya bomoi ya nsé
  73. Ya soló, tondimi na Nkolo wa biso, тропа alimbisa masumu та biso, na bonganga oyo osalisi yango biso na makasi. Mpe Allah azali malamu wa libela
  74. Oyo akotomboko na Nkolo waye, ya sólo, akozala na lifelo. Kati na yango akokufaka te mpe akozalaka na bomoyi te
  75. Mpe oyo akokutana naye na bondimi mpe asalaki misala milamu, bango nde bakozalaka o bapete ya lokumu ya likolo
  76. Lola ya edeni eye ezali kolekisa na nsé na yango mingala, libela kati na yango, mpe wana ekozala nde litomba ya baye bamipetolaki. (na boboyi kibopengwi na masumu)
  77. Mpe tosilaki kotalisa na Müssa été: Kende na bawumbu na ngai na butu mpe fongola bango nzela makawuka okati ya ebale. Kasi kobanga te ete bakolanda
  78. Falo alandaki bango elongo na basoda naye, ebale ezindisaki bango mpe elimwisaki bango
  79. Мре falo abungisaki bato naye, mpe akambaki bango o nzela ya semba te
  80. Eh bana ya isalayele! Tosilaki kolongisa bino na monguna wa bino, mpe topesaki bino elaka o ngambu ya ngomba o ngambu ya mobali, mpe tokitiselaki bino. Manna, na Salwa
  81. Boliya bia malamu biye topesi bino kasi bopengwa na yango te, noki te (Allah) akosilika na bino, mpe oyo kanda na ngai ekozua ye, asili kobeba
  82. Mpe ya soló, nazali molimbisi monene, тропа oyo akosenga bolimbisi mpe andimi mpe asali misala milamu, sima amitiye o nzela ya semba
  83. Mpe тропа nini ozali kowelisa kotika bato nayo oh Müssa
  84. (Mûssa) ayanolaki: Bazali wana na mobeko mwa ngai, mpe nazali kowelisa koya epai nayo Nkolo, mpo okoka kondimela ngai
  85. (Allah) alobi: Ya sólo, tomeki bato nayo o sima ya kokende nayo, mpe samiriyu abungisi bango
  86. Mûssa azongi epai ya bato naye na mawa, mpe kanda ya makasi. Alobi: Oh bato na ngai! Nkolo wa bino asilaki kopesa bino elaka elamu te? Boyokani bozalaki molai тропа bino to boponi sé ete kanda ya Nkolo ezua bino? Mpo bosili kobebisa mpe bopengwi na elaka na ngai
  87. Balobi: Ezali kolinga ya biso moko te oyo ezangisi biso kotosa, kasi tomemaki mikumba mia bato ba falo, tobwakaki yango na moto, lokola samiri abwakaki
  88. Mpe abimiseli bango ekeko ya motané ezali kobimisa mongongo lokola ngombe, Balobi; oyo nde nzambe na bino na nzambe ya Mûssa abosanaki
  89. Boye bazali kornona te ete azali kozongisela (ekeko) bango liloba te mpe azali kosalisa bango te mpe kosala bango mabe te
  90. Mpe ya soló: Háruna asilaki koyebisa na bango liboso oh bato ba ngai! Ya sólo, bokwei na bomekami тропа yango, ya soló, oyo atonda na mawa nde Nkolo na bino. Bolanda ngai, mpe botosa mitindo mia ngai
  91. Balobi: Tokozalaka na yango kino Mûssa akozonga
  92. (Mûssa) alobi: Oh Hânına! Eloko nini epekisaki yo mpo opekisa bango tango omonaki bazali kobunga nzela
  93. Ete olanda ngaï. Boye, oboyi kotosa mitindo na ngai
  94. Alobi: Eh mwana ya mama! Kobenda mandefu mpe moto na ngai te, na bangaki oloba ete ngai nakaboli bana ya isalayele mpe natosi mitindo nayo te
  95. (Mûssa) alobi: Olingi nini eh Samiriyu
  96. Alobi: Namoni oyo bamona te. Nazuaki mabele ya makolo ya motindami (ya anzelu) na bwakaki yango, wana nde ndenge molimo mwa ngai motindaki ngai
  97. (Mûssa) alobi: Kende na bomoi ya nsé, okobanda koloba na moto nyoso ete: Kosimba ngai te, mpe okozala na elaka oyo okozangisa yango te, tala nzambe nayo oyo obondelaki mpe okangamaki na yango, tokozikisa yango mpenza mpe tokopanza putulu na yango likolo na mayi ya ebale
  98. Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo nzambe mosusu ya bosóló ya kobondela azali te sé ye, ayebi nyoso ezali koleka
  99. Lolenge wana nde tozali kobetela yo makambo ya ba oyo baleka. Mpe ya sólo, tosilaka kopesa yo bokundoli bwa biso
  100. Oyo akoboya kondima na yango (kurani) ya soló, ye o mokolo ya suka akomemaka mokumba
  101. Bakotikalaka libela o kati na yango, mpe bakozuaka mabe o mokolo mona
  102. Mokolo moye bakofulaka kelelo тропа lisekwa. Mpe tokosangisaka batomboki banso, na langi ya bule (тропа bobangi ya makasi)
  103. Bakolobana kati na bango ete: Bowumelaki na mokili sé mikolo zomi
  104. Toyebi na malamu nini bazali koloba, tango moko wa bango oyo azali na ezaleli ya malamu akoloba ete: Borandaki sé mokolo moko
  105. Bazali kotuna yo тропа bangomba; loba: Nkolo wa ngai akopanzaka yango, ekokomaka lokola mputulu
  106. Mpe akotika yango elali polele lokola mabele oyo ezali na eloko te likolo na yango
  107. Okomona o kati na yango ata esika moko ezali ya kogumbama te mpe botombwami te
  108. Mokolo wana (bato), bakolandaka mobengi na kozanga koyimayima mpe mingongo mikokitisama o boso bwa Ar-Rahmân, ata makelele ya шоке okoyoka na paši
  109. Mokolo wana kosengela moto ekozalaka te, longola sé oyo Ar-Rahmân akopesaka ye ndingisa, mpe akondimela ye liloba
  110. Ayebi maye mazali liboso na bango mpe maye mazali o sima na bango, mpe bazali na boyebi te ya balolenge naye
  111. Mpe bilongi bia bato bikokitisamaka тропа oyo azali na bomoi mpe amikoka mpe mabe ekozalaka na oyo akoya liboso naye na bobubami. (mabe)
  112. Mpe oyo akosala bolamu mpe azali mondimi, akobangaka kobubama te mpe konyokwama te
  113. Mpe lolenge wana nde tokitisaki kurani na ndinga ya arabo, mpe tolimbolaki na kati na yango, тропа balolenge ya bitumbu, mpo bakoka kobanga mpe bakanisa тропа bondimi
  114. Lokumu ezali ya Allah nkumu ya bosôló, mpe kotanga kuranı noki noki te yambo ete ekitela yo, mpe loba: Oh Nkolo wa ngai! Bakisela ngai boyebi
  115. Mpe tosilaki kopesa Adam mobeko liboso mpe abosanaki yango, mpe tokutaki bokangami ya makasi epai naye te
  116. Mpe tango tolobaki na ba anzelu: Bogumbama o liboso ya Adam, bagumbamaki bango banso, longola sé satana, aboyaki (kogumbamela ye)
  117. Mpe tolobaki: Eh Âdâm! Ya soló, oyo nde monguna nayo, yo na mwasi wayo. Na yango abimisa bino na paladizo te noki okozala na mpasi
  118. Ya sólo, тропа yo, okoyokaka nzala te okati na yango mpe okozalaka bolumbu te
  119. Mpe ya sólo, yo okoyokaka mposa ya mayi te, mpe pasi ya moyi ekozuaka yo te
  120. Mpe (sima) satana amekaki ye na koloba ete: Eh Âdâm! Nalakisa yo nzete ya bomoi ya nseko mpe bokonzi eye ekobebisama te
  121. Bango mibale baliaki yango, mpe batikalaki bolumbu, mpe babandi komizipa na nkasa ya Iola, mpe Adam aboyaki kotosa Nkolo wa ye, mpe abungaki na mibeko mia Nkolo waye
  122. Sima Nkolo waye aponaki ye mpe ayambaki tubela naye mpe akambaki ye
  123. Alobi: Bokita awa bino banso, bokozala na kibonguna na mabota ma bino banso, (bakitani na bino) mpe soki bokambi bwa ngai boyeli bino, oyo akolanda bokambi bwa ngai, akobunga te mpe akozalaka na mpasi te
  124. Mpe oyo akoboya bokundoli bwa ngai, ya soló, ye akozalaka na bomoyi ya mpasi, mpe omokolo mwa suka, tokosekwisa ye miso mazipama
  125. Akolobaka, oh Nkolo wa ngai! Mpona nini osekwisi ngai nazali kornona te kasi yambo nazalaki kornona
  126. (Allah) akoyebisa ye: Lolenge wana nde eyelaki yo bilembo bia biso mpona kotangisa yo, kasi obosanaki yango, yango wana lelo tobosani yo
  127. Мре lolenge wana nde topesaka etumbu na oyo azali kondima te, mpe azali kolekisa ndelo na bilembo bia Nkolo wa ye. Kasi etumbu ya mokolo ya suka ekozalaka makasi mpe ekotikalaka libela
  128. Wana esalisaki bango na bokambi te, boni ebele ya bato tobomaki yambo na bango? Bazalaki kotambola na bisika bia bango. Ya soló, wana nde elembo тропа baye bazali na may ele
  129. Soki тропа liloba ya Nkolo naye esila kolobama te mpe тропа mokano naye te, mbele etumbu esilaki kokwela bango
  130. Zala na bozeli тропа maye bazali koloba, mpe kumisa lokumu ya Nkolo nayo yambo ete moyi ebima, mpe yambo ya bolimwi na yango, mpe o kati kati ya butu. Mpe kumisa ye na moyi tango mosusu okosepela
  131. Mpe kolandisa miso nayo te sima ya maye topesi basusu kati na bango bonzenga ya bisengo ya mokili mpo ete tomeka bango na yango, bozui ya Nkolo nayo (ya lola) nde ezali malamu mpe ekowumela
  132. Мре tinda libota lia yo na losambo, mpe žala molende na yango, tozali kosenga yo bozui te, biso nde tozali koleisa yo, mpe suka ya malamu ezali тропа bobangi (Allah)
  133. Мре bakolobaka: Mpona nini ayeli biso likamwisi kowuta epai y a Nkolo naye te? Boye elembo (kurani) eye ekomama kala eyelaki bango te
  134. Мре soki topesaka bango etumbu liboso, balingaki koloba: Oh Nkolo wa biso! Mpona nini otindelaki biso motindami te? Kasi tolandaki mateya yambo ete toyoka soni тре tozanga ntina
  135. Loba: Moto nyoso azela, bino тре bozela. Bokoyebaka banani bazali na nzela ya semba тре bakambami