19.Mary

  1. Kâf, hâ, yâ, ain, sôd
  2. Ezali bokundoli bwa ngolu ya Nkolo wayo epai ya mowumbu wa ye Zakariya
  3. Tango azali kobelela Nkolo wa ye na kobatama
  4. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Mikuwa mia ngai milembi, mpe suki ya pembe ezingi moto mwa ngai, na yango, ata ngonga moko te nazangaka kozua soki na beleli yo
  5. Мре nazali kobanga (ezaleli) ya bakitani na ngai sima na ngai, mpe mwasi wa ngai abotaka te, pesa ngai mokitani awuta epai nayo
  6. Oyó akokitana ngai mpe kokitana libota lia Ya’qúb, mpe tika été osepela naye oh Nkolo
  7. Eh Zakariya! Tozali kopesa yo sango elamu ya mwana mobali, nkombo naye ekozala Yahya totiya liboso naye nkombo ena te. (ndoi te)
  8. Мре (Zakariya) alobi: Oh Nkolo wa ngai! Ndenge nini nakozala na mwana ya mobali mpe mwasi wa ngai abotaka te, mpe bopaka bosili kozua ngai
  9. Ayanoli ye; ndenge Nkolo wayo alobi nde ekozala. Wana ezali pași te тропа ngai, mpe nakelaki yo liboso ozalaki eloko te
  10. Alobi: (Zakariya) Oh Nkolo wa ngai! Lakisa ngai elembo, (tiyela ngai elembo) (Allah) alobi: Elembo nayo, kolobisa bato te babutu misato milandani
  11. Mpe abimeli bato naye kowuta na esika ya losambo, mpe ayebisi bango na maboko ete: Bosambela tongo mpe pokwa
  12. Eh Yahya! Zúa buku mpe simba yango makasi, mpe topesaki ye bwanya azali elenge токе
  13. Mpe totiaki ye azala na mawa mpe bopeto, mpe azalaki moyengebeni
  14. Mpe azalaki na botosi mpe limemia epai ya baboti naye, kasi azalaki na lolendo te mpe komilakisa te, mpe azangaki te kotosa mibeko mia (Nkolo waye)
  15. Mpe kimia ezala likolo lia ye na mokolo moye abotamaki, mpe na mokolo akokufa mpe mokolo akosekwa
  16. Mpe kundola Maryam okati ya buku (kati ya kurani) tango amibendaki na libota lia ye akei kovanda na esika moko boye о moniele
  17. Mpe amibombami na bango, totindelaki ye molimo (gabiliyele) oyo ayelaki ye na lolenge ya moto malamu
  18. (Maryam) alobaki: Ya soló, ngai na mibateli epai ya Ar-Rahmân тропа yo, soki penza ozali moyengebeni
  19. (Anzelu) alobi: Ya sólo, ngai nazali motindami ya Nkolo wayo mpo napesa yo likabo ya elenge mobali ya mayele oyo apetoama
  20. Alobi: Ndenge nini nazala na mwana ya mobali, mpe mobali ata moko te asimbi ngai, mpe nazali ndumba te
  21. Alobi: Ndenge wana nde Nkolo wayo alobi été; ezali pasi te тропа ngai, mpe tokotia ye elembo epai ya bato, mpe ngolu kowuta epai na biso. Mpe likambo yango ekokisamaki
  22. Mpe azuaki zemi mpe akendeki kofanda mosika
  23. Mpe pasi ya kobota eyeli ye onse ya nzete ya nagh’la alobi: Eh mpasi na ngai! Soki liwa ezuaka ngai yambo ya oyo, nde nabosanamaki soló ya kobosanama
  24. Na yango, abengaki ye na nsé naye alobi: Kozala na mawa te! Nkolo wayo asili kotiya onse nayo liziba ya bomoyi
  25. Ningisa nzete ya nagh’la, benda yango epai nayo ekokweisela yo mbuma na yango ya kotela
  26. Lia mpe mela mpe sepelisa liso lia yo, soki omoni moto loba: Nazui elako ya ngizi pona Ar-Rahmán Nakosolola ata na moto moko lelo te
  27. Mpe amemaki mwana na libota naye, mpe balobi naye ete: Oh Maryam! Osali likambo ya nsoni
  28. Oh ndeko mwasi ndeko ya Háruna! Tata wayo azalaka moto mabe te, mpe mama wayo azalaka ndumba te
  29. Mpe alakisaki mosapi mwaye epai ya mwana, balobi: Ndenge nini tokolobisa mwana moke oyo awuti kobotama
  30. (Mwana) Alobi: Ya soló, nazali mowumbu wa Allah, apesi ngai buku mpe aponi ngai nazala ntoma
  31. Mpe apamboli ngai esika nyoso nakozala, mpe atindi ngai nasambela mpe nabimisa Zakat na bomoyi bwa ngai mobimba
  32. Mpe nasala bolamu epai ya mama na ngai, mpe atiaki ngai nazala moto ya lolendo mpe moto ya pași te
  33. Mpe kimia ezala likolo lia ngai, mokolo moye nabotamaki na mokolo moye nakokufa na mokolo moye nakosekwisama nazali na bomoyi
  34. Wana Issa mwana ya Maryam, liloba ya soló, eye bazali sé kotia tembe mpe kobundisa bosóló. (bwa ye)
  35. Esengeli te na Allah azala na mwana, nkembo naye (Allah), soki akani likambo akoloba sé ete; zala, mpe ezalisami sé ndenge alobi
  36. Mpe ya soló, Allah azali Nkolo wa ngai mpe Nkolo wa bino, bobondela ye, oyo nde nzela ya semba
  37. (Na sima) bakabwani na binzambe nzambe kati kati na bango, etumbu ezali тропа bapengwi o mokolo ya monene (mokolo ya kokata makambo)
  38. Bakoyoka mpe bakomona penza ndenge mokolo bakoyela biso, kasi babubi bakozala na libungi ya monene ya polele о mokolo yango
  39. Mpe kebisa bango тропа mokolo mwa botungisami, tango manso makokatamaka, mpe bazali о mokili moye bazali komiyeba te mpe kondima te
  40. Ya sólo, biso nde tozali na bokitani ya mabele, mpe baye banso bazali o likolo na yango, mpe epai na biso nde banso bakozonga
  41. Mpe kundola Ibrâhîm okati ya buku (kurani), ya soló, ye azalaki ntoma moto ya bosembo
  42. Tango ayebisaki na tata waye, eh tata wa ngai! Mpona nini ozali kobondela oyo akoyokaka te, mpe akomonaka te, mpe ekoki kosalisa yo na eloko te
  43. Eh tata wa ngai! Našili kozua boyebi boye boyela naino yo te, landa ngai nakokamba yo o nzela ya semba
  44. Eh tata wa ngai! Kobondela satana te, ya soló, satana azangaki botosi ya Ar-Rahmán
  45. Eh tata wa ngai! Ya sólo ngai nazali kobanga etumbu ya Ar-Rahmán eyela yo, mpe okoma moto wa satana
  46. Alobi: Eh Ibrâhîm! Ozali koyina banzambe ba ngai? Soki otiki te nakobetaka yo mabanga zala mosika na ngai (tokabwana) tango molai
  47. Ibrâhîm alobi: Kimia ezala nayo, nakosengelaka yo na Allah alimbisa yo, mpo ye andimelaka ngai тропа bolamu
  48. Namitie mosika na bino, mpe na maye bozali kobondela na botiki Allah, mpe nakosenga na Nkolo wa ngai, mpe nazali na elikya ete nakomona pasi te soki nasengi Nkolo wa ngai
  49. Tango amitie mosika na bango, mpe na maye bazalaki kobondela na botiki Allah, topesaki ye likabo ya Is’háq na Ya’qúb, mpe totiaki bango bantoma
  50. Mpe topesaki bango ngolu na biso, mpe totombolaki bango na koloba bosôló
  51. Mpe kundola Mûssa okati ya buku. Ya soló, azalaki moponomi ntoma mpe motindami
  52. Mpe tobengaki ye (o ngambu ya mobali o ngomba ya sinai) penepene na biso тропа kopesa ye sekele
  53. Mpe na mawa na biso topesaki ye ndeko waye Háruna azala lokola ntoma
  54. Mpe kundola okati ya buku Ismâîl. Ya sólo, azalaki kokokisa elaka mpe azalaki ntoma mpe motindami
  55. Mpe azalaki kotinda libota lia ye na losambo mpe kopesa zakat, mpe Nkolo waye azalaki kosepela naye
  56. Mpe kundola Idrís okati ya buku. Ya soló azalaki ntoma mpe moto ya bosembo
  57. Mpe totombolaki ye esika likolo ya lokumu koleka
  58. Baye wana bantoma baye Allah atondisaki bolamu naye likolo na bango kati ya libota ya Adam, na baye bazalaki elongo na Nûh (okati ya masuwa), mpe libota lia Ibrâhîm mpe Isalayele, mpe basusu baye tokambaki mpe toponaki, soki mikapo mia Ar-Rahmân mizali kotangama, bakweyaka na kofukama na kolela
  59. Kasi baye bakitanaki sima na bango, batikaki kosambela mpe balandaki bisengo na baposa na bango ya nzoto, kasi mosika te bakobebisama
  60. Longola sé oyo akotubela mpe andimi mpe asali misala milamu, bango nde bakokota na Iola mpe bakobubama te
  61. (Bakozala) na elanga ya edeni eye Ar-Rahmân alakaki yango bawumbu naye, baye bandimaki na (mabombami na yango). Ya soló, elaka naye ezali na tembe te
  62. Kati na yango (Iola), bakoyokaka maloba mazanga ntina te, sé kimia, mpe bakozalaka na bilei bia tongo mpe pokwa
  63. Wana nde Iola eye tokopesaka bawumbu ba biso baye bazalaki na bobangi
  64. Tokitaka te sé na mitindo mia Nkolo wa yo, manso maye mazali liboso lia biso mpe osima na biso na maye manso mazwami o kati kati na yango mibale mazali yaye. Mpe Nkolo wayo abosanaka te
  65. Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali kati na yango, bondela ye mpe kanga motema тропа mabondeli naye. Boye osi oyoka été azali na ndoyi
  66. Mpe moto alobi: Boye soki nakufi nakosekwisama lisusu
  67. Boye moto azali kokanisa te ndenge tokelaki ye liboso mpe ye azalaki eloko te
  68. Na nkombo ya Nkolo wayo, tokosangisa bango na basatana, mpe sima tokofukamisa bango liboso ya lifelo
  69. Sima tokobendaka na mangomba manso kati na bango baye bazangaki botosi, baye bazalaki mabe koleka тропа Ar-Rahmân
  70. Sima, biso nde tokoyeba ba nani baye basengeli kokota mpo bazika na motó
  71. Mpe bino banso bokoleka likolo na yango (ya gbagba). Mpo été yango ekozangaka te epai na Nkolo wayo
  72. Sima, tokolongisaka baye bandimaki mpe tokotika babubi о kati na yango (lifelo) ya kofukama
  73. Mpe tango mikapo mia biso mizali kotangema likolo na bango, bapengwi bakolobaka na baye bandima: Lisanga nini ya malamu kati na oyo mibale ezali kitoko mpe bolongani ya malamu
  74. Ebele toboma yambo na bango kati na mabota! Bazalaki malamu mpe na misolo ebele mpe kitoko
  75. Loba: Oyo akozala okati ya libungi, Allah akobakisela ye libungi kino akozuaka etumbu, to soki tango ekoki ekoyebanaka te ba nani bazalaki na mabe koleka, na ba nani bazalaki na basoda ya motawu
  76. Mpe Allah akobakisela baye bakambamaki bokambi, mpe misala malamu maye mawumelaka, ekoki na litomba malamu mpe bozongi malamu epayi ya Nkolo nayo
  77. Boye omonaki te ete: Oyo apengwaki na mikapo mia biso mpe alobi: Nakopesamaka bolamu na bana solo
  78. Boye akomi na boyebi ya mabombami to azuaki elaka na Ar-Rahmân
  79. Kasi ezali bongo te, tokokoma maye azali koloba mpe tokobakisela ye etumbu
  80. Mpe biso nde tokopesaka maye azali koloba, kasi akoyelaka biso ye moko
  81. Bazui banzambe basusu batiki Allah, mpo bazala basungi ba bango, (тропа etumbu)
  82. Kasi te, bakopengwaka na mabondeli ma bango, mpe bakozalaka banguna na bango
  83. Boye ozali kornona te ete ya soló: Totindaki bazabolo mpo bazangisaka bango botosi
  84. Kowelisa te тропа bango, ya sólo, tokotiyaka motango moye moyebani, (тропа maye manso basalaki)
  85. (Kanisa) mokolo moye tokosangisaka babangi (Nzambe) epai na Ar-Rahmán
  86. Mpe tokopusaka batomboki o moto mwa lifelo lokola bibwele (тропа komela mayi ya moto)
  87. Bakozuaka lisalisi te, longola sé oyo akozua elaka na Ar-Rahmán
  88. Mpe bazali koloba ete: Ar-Rahmán azali na mwana
  89. Bosili koya na eloko ya mabe
  90. Liloba wana ekoki kofungola mapata mpe kopasola mabele mpe bangomba bikopanzana
  91. Mpo bazueli Ar-Rahmân mwana
  92. Kasi ekoki kosalama te ete: Ar-Rahmân azala na mwana
  93. Baye banso bazali o likolo mpe o nsé bakoya epaî ya Ar-Rahmân bazali bawumbu
  94. Asila koyeba motango mwa bango, mpe bazali ya koyebana
  95. Mpe o mokolo mwa mbano bango banso bakotelemaka moko moko o liboso lia ye
  96. Ya soló, baye bandimaki mpe bazalaki kosala misala milamu Ar-Rahmân akopesa bango bolingo mpe bango bakolinga ye
  97. Mpe ya solo, tosilâ kozalisa yango mpasi te na lolemo nayo (kurani) тропа komanyola, mpo okoka kopesa sango elamu na yango epai ya babangi mpe okebisa na yango babubi
  98. Mpe ebele tosilaki koboma liboso na bango! Boye окотопа tokokuta moko kati na bango to okoyoka ata mwa makelele