15.The Rock

  1. Alif, lâm, râ. oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele
  2. (O mokolo mwa suka) bapengwi bakolobaka ete: Soki tozalaka ata ba mizilima
  3. Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba
  4. Kasi tobomaka mboka moko te sé ezala na mokano moyebani mosila kokomama
  5. Umma moko te ekoki kopuşa liboso to kozongisa mokano na bango sima
  6. Mpe bakolobaka été: Oh yo moto bakitiseli ye buku! Ya soló, ozali moto ya ligboma
  7. тропа nini te oyelaki biso ba anzelu soki ozalaki o kati ya balobi bosôló
  8. Tokitisaka ba anzelu sé na bosôló, mpe bazelisaka te тропа etumbu
  9. Tokitisaki bokundoli (kurani) na bosôló, тре sé biso nde tobatelaka yango
  10. Mpe ya soló, totindaki batindami yambo nayo, o kati ya bato ba kala
  11. Mpe motindami moko te ayelaki bango sé batióla ye
  12. Ndenge wana nde tokotisaka kibopengwi o mitema mia batomboki
  13. Bakondimaka na yango te, mpe ya sólo, esilaki kosalama na bato ya liboso
  14. Ata soki tofungolelaka bango ezibeli ya likolo тропа komata nde bandimaki mpe te
  15. Bakolobaka: Ya soló miso та biso mizali ya kolangwa, kasi tozali nde balokami
  16. Mpe tosilaki ya sólo, kotia minzoto na mapata, mpe topesi yango bonzenga тропа botali
  17. Mpe tobatelaki yango na mabe manso ma satana wa botutu
  18. Ata oyo akolinga koyokamela yango, tokolandisa ye moto
  19. Mpe o mabele totandaki yango, mpe totiyeli yango bangomba mpe tolandisaki eloko nyoso na bokoki bwa yango
  20. Mpe totiyelaki bino okati na yango (mabele) bilei mpe bikelamu bisusu biye bozali na nguya ya koleisa yango te
  21. Ezali na eloko moko te sé ezala na sanduku ya bozui na yango epai na biso, mpe tozali kokitisa yango ndambu ndambu na lolenge esengeli
  22. Mpe tozali kotinda mipepe ya kokolisa milona mpe tokitisi mayi kowuta na mapata тропа komelisa bino na yango, oyo bozali na bokoki ya kobomba yango te
  23. Mpe ya soló, tozali kopesa bomoyi mpe liwa, mpe biso nde tozali kopesa bokitani
  24. Mpe toyebi baye baleka liboso na bino (basila kokufa), mpe toyebi baye batikali naino sima
  25. Mpe ya sólo, Nkolo wayo akosangisaka bango, ya soló ye nde azali na bwanya atonda boyebi
  26. Мре tokelaki moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu
  27. Mpe tokelaki ba djini liboso na moto ya molunge makasi
  28. Mpe tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu ete: Ya soló nalingi kokela moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu
  29. Mpe tango nakosilisa kobongisa ye na lolenge ya kitoko mpe na fuli okati naye, pema nangai bofukamela ye na botosi
  30. Mpe ba anzelu banso bafukamaki
  31. Longola sé lusufele (ibilisa), aboyaka kogumbama elongo na bagumbami
  32. Na yango (Allah) alobaki: Oh lusufele! Mpona nini ozuami o motango mwa bagumbami te
  33. Alobi: Nazali te mpona kogumbamela moto oyo okeli ye kowuta na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu
  34. Mpe (Allah) alobi: Bima wana (na lola) mpo ozali na botutu
  35. Mpe okozala na botutu kino mokolo mwa suka
  36. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pesa ngai mwa tango kino mokolo mwa bosekwisami
  37. Мре (Allah) alobaki naye ete: Ya soló, ozali kati ya bazelisami
  38. Kino mokolo ya ngonga eye eyebani
  39. Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pamba te mpo omemi ngai na libungi, mpe na kobongisela bango mokili mpe nakobungisa bango banso
  40. Longola sé bawumbu nayo baye osilaki коропа
  41. (Allah) alobi: Oyo nde nzela ya bokambami epai na ngai
  42. Ya solo, bawumbu ba ngai ozali na bokonzi likolo na bango te longola sé baye bakolanda yo nakati ya babungi
  43. Mpe ya soló, lifelo ekozala esika na bango banso
  44. Ezali na bikuke sambo тропа kokota, mpe bikuke binso biyebani na bato ba yango
  45. Ya sólo, babangi bakozala na paladiso biye bizali na maziba
  46. Bokota na kati na yango na kimia nyoso
  47. Mpe tokolongolaka bango likunya eye ezalaki na mitema na bango mpe bakozala bandeko likolo ya bambeto yakotalana
  48. Moko te bolembu ekozua ye, mpe bakobimaka o kati na yango te
  49. Yebisa bawumbu ba ngai, ya soló, ngai nazali molimbisi natonda ngolu
  50. Mpe ya sólo, etumbu na ngai ezalaka etumbu ya makasi
  51. Mpe yebisa bango тропа bapaya ba Ibrâhîm
  52. Tango bakotelaki ye mpe balobaki: Kimia (salam) alobi: Tozali kobanga bino
  53. Balobaki: Kobanga te, ya sólo, tozali kopesa yo sango ya muana mayele oyo atondi na bwanya
  54. Alobaki: Bozali kopesa ngai (sango eye) mpe boyebi malamu ete kibopaka esili kozua ngai, boye sango malamu nini bozali kopesa ngai
  55. Balobaki: Tozali kopesa yo sango ya bosóló kozala okati ya baye bazangaka elikya te тропа bolamu
  56. Mpe alobi: Nani azangaka elikya mpe ngolu ya Nkolo waye sé baye babunga nzela
  57. Mpe (alobaki na bango): Eh batindami (ba Allah)! Bolingi nini
  58. Balobi: Ya soló, totindami epai ya batomboki
  59. Longola sé libota lia Loth, ya sólo tokolongisa bango banso
  60. Longola sé mwasi waye, tosila kokata (Allah) ete akozala o kati ya baye bakozua etumbu
  61. Mpe tango batindami bapusanaki pene na libota lia Loth
  62. Alobi: Bozali bato bayebani te
  63. Balobi: Toyeli yo mpo topesa etumbu na baye bazali kotiya tembe mpe bazali kondima te
  64. Mpe toyei epai nayo na bosóló mpe tozali bato ba bosembo
  65. Kima noki (kende noki) na libota lia yo na butu, zala sima na bango, moko te kati na bino atala sima. Mpe bökende sé na esika eye bakolakisa bino
  66. Mpe topesaki ye mobeko mona, mpo bato bana etumbu ezua bango kobanda ntongo tii suka
  67. Mpe bato ba mboka bayeli ye bazali kosepela
  68. Alobi: Ya sólo, baye bazali bapaya ba ngai bosala bango mabe te
  69. Bobanga Allah, kasi bokitisa lokumu na ngai te
  70. Мре balobaki (na Loth): Topekisaki yo te na koyamba bato ya mokili
  71. Alobi: Bozua bana ba ngai ya basi soki bolingi bosala bango oyo bolingi
  72. Na bomoyi bwayo, ya soló bango bazali na milangwa mia liwa тропа bopengwi bwa bango
  73. Mpe lolaka ya makasi ezuaki bango na ebimeli ya moyi
  74. Mpe tobalusaki (mboka yango) na bangambo inso, mpe tobetiselaki bango mbula ya mabanga maye esanganaki na moto makasi
  75. Ya sólo, wana nde bilembo тропа baye bazali na boyebi bakoka kornona
  76. Мре ya sólo, mboka ena ezalaki lokola nzela eye eyebanaki na moto nyoso
  77. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi
  78. Ya sólo, etuka ya aïkat bazalaki mpe babubi
  79. Tozuaki bango mpe lokola, kasi mboka mibale oyo eyebanaki na bisika na yango awa na mokili mpe bitikalaki bilembo binene
  80. Мре bato ba mboka ya hijr basilaki kosala batindami mabe
  81. Mpe tolakisaki bango makamwisi ma biso kasi balandaki yango te
  82. Mpe bazalaki kotonga bandako bia bango okati ya bangomba тропа kozala na kimia
  83. Mpe topesaki bango etumbu na ntongo o sima ya kolamuka
  84. Maye manso bazalaki na yango, bakokaki kosala na yango eloko te
  85. Mpe tokelaki likolo na nsé, na maye manso mazuami o kati na yango mibale te sé na bosóló, mpe ya soló, ngonga ekokokaka, limbisa bolimbisi bwa malamu
  86. Ya sólo, Nkolo wayo azali mokeli mpe moyebi
  87. Mpe tosilaki kopesa yo mikapo sambo тропа kozongela yango na kotanga mbala na mbala, na kurani ya monene
  88. Mpe kotala te na kolula bozwi ya kitoko topesaki balisanga na bango тропа bisengo ya tango токе, koyoka pasi тропа bango te, kasi zala na komikitisa pona bandimi
  89. Mpe loba: Ya soló, nazali mokebisi ya polele
  90. Ndenge moko tokitisaki (etumbu) likolo lia bakaboli
  91. Baye bazuaki kurani ezala eloko ya bokabwani mpe tembe kati na yango
  92. Mpe na nkombo ya Nkolo nayo, nakotunaka bango banso
  93. Mpona maye bazalaki kosala
  94. Monisa polele maye otindami na yango, mpe pesa mokongo na basangisi (Allah)
  95. Tozali kosunga yo liboso lia baye bazali kotiola yo
  96. Baye bazali kosangisa Allah na biloko bisusu, bakoyebaka kala te
  97. Mpe tosilaki koyeba ete motema nayo ezali kokangama na ntina ya maye bazali koloba
  98. Mpe kumisa Nkolo wayo, mpe zala o kati ya bagumbami
  99. Mpe bondela Nkolo wayo, kino bosôló bokoyelaka yo